Créditos

PERFORMING ARTISTS
Pitshou Mwanza
Pitshou Mwanza
Performer
COMPOSITION & LYRICS
Pitshou Mwanza
Pitshou Mwanza
Songwriter

Letras

Chant : LIBÉRÉ
Choeur :
Na bima ehheh na koma na ngai libéré, afuta niongo ya makila nakoma témoignage ya Ekulusu, Yesu akata singa (2x)
Lead(1)
Yesu azo zonga Yelusalema, elombe hoooo, atindi ba disciple na ye bokende na village ya Bethphage, boko kuta muana mpunda bakanga singa, bokata singa mpunda oyo, bo memela nga mpunda oyo na Maboko, soki ba Tuni bino Motuna, boloba mokolo na ye aza posa na ye hoooo, bo yela ngai muana Muasi bakanga singa na famille balobi ako bala teeoo, bo yela ngai muana mobali oyo kelasi esila diplôme musala teooo, bo yela ngai moto ya bokono oyo banda bo muana aluka lobiko ko lobiko teoo, bo yela ngai ye na libéré ye, naza nako ndima Yesu a libera ngai.
Choeur :
Na bima ehheh na koma na ngai libéré, afuta niongo ya makila nakoma témoignage ya Ekulusu, Yesu akata singa
Lead (2)
Ba aveugle nionso batambolaka Na nzela batambolaka na mutu moko pembeni, asengelaka ye mbongo ye nde azo sunga Aveugle, misusu ekoma ba cop na bango ba niokolaka ba Aveugle, soki ba pesi ye 10.000 franc ayebisi aveugle eza 1.000 francs, ba pesi ye 5.000 francs alobi eza 500 franc, ekokamaka cop ya Mongali pembeni ya Barthimée, azuela yango facture ya Libala hooo abalela yango muasi ehhhhh, mokolo moko Yesu aleki na nzela ya Barthimée a libéré Barthimée ehhh Mongali azonga na pokua bo lukela ngai Barthimée naza na facture ya Libala bo lukela ngai Barthimée, batu bo limitaki vie na ngai ye boko sutuka na bima ehheh..
Choeur :
Na bima ehheh na koma na ngai libéré, afuta niongo ya makila nakoma témoignage ya Ekulusu, Yesu akata singa
Lead(3)
Ba malade minene tozo bela Lelo hooo tozo kufa nango jamais, ba opération minene oleka na yango maman okufa nango jamais, trois césarienne bakunda yo nango jamais, misusu malaria Hooo mabele emela bango, misusu libaku ya pamba ba mema ye cimetière, toleki bango na kitoko tehoo, toleki bango na bolamu tehhooi eza kaka ngolu ya Nzambe abomba nga Na protection ya Lola, na parapluie celeste ya bo Nzambe azipa nga Na bima ehheh...
Choeur :
Na bima ehheh na koma na ngai libéré, afuta niongo ya makila nakoma témoignage ya Ekulusu, Yesu akata singa
Paroles
Likambo oyo elekelaka ngai, soki okondi, obebi batu nionso bako tonda koyebisa yo obebi boye pona Nini, okomi boye pona Nini, mais soki okomi kitoko, okomi munene eza pasi pour batu ba loba ehhh mokili
Lead(4)
Santé, kitoko Bozo mona ngai naza na yango eza na ngo ya ba kisi teoo, ba voyage nazo sala Lelo oyo eza nango ndako ya nganga té, ba Kabelo ya cher, makambo kitoko eza nango yako shina teoo Yesu aleka na nzela na ngai a libéré a nga na bima ehheh
Choeur :
Na bima ehheh na koma na ngai libéré, afuta niongo ya makila nakoma témoignage ya Ekulusu, Yesu akata singa
Lead(4)
Parole : Mukolo moko nioka a se retrouver na kati ya moto..
Azo Luka lolenge Yako bima nioka oyo, Papa moko na mawa na motema, aluki ndenge Yako libéré nioka oyo, nioka asui Papa na loboko ehhhh Papa azongisi nioka na kati ya moto ehhh, likambo Yako kamua Papa akeyi ko luka lisusu nzete a libéré nioka na moto batu nionso Na mboka ba gangi, Papa likambo Nini asui to olingi lisusu ooo bimisa ye ? Papa alobi bo tika ngai na libéré yeohhh, eza nango nature na ye, ata osali ye bolamu ehh ata osali bolamu ako sua yo Kaka, ngai pe eza nango nature na ngai, ata batu basali ngai mabe nazongisaka se bolamu ehhh, biso batu oyo toza na nature ya Jésus, to kipaka n'a biso ba nioka té ohh biso tosalaka na biso bolamu pour Yesu a libéré a biso to bimaaaee..
Choeur :
Na bima ehheh na koma na ngai libéré, afuta niongo ya makila nakoma témoignage ya Ekulusu, Yesu akata singa (2x)
Paroles
Oyokiooooooo ahhhhh, Kobinela Yesu epesamela nango batu nionso té yaya, tika ye avanda yo bina nayo bina nayo
Génération Mwanzaologie ba étouffé vérité nayo té yaya, yemba yango, teya yango yaya
Choeur :
Na bima ehheh na koma na ngai libéré, afuta niongo ya makila nakoma témoignage ya Ekulusu, Yesu akata  singa.... Ahhhh
Written by: Pitshou Mwanza
instagramSharePathic_arrow_out

Loading...