Vídeo de música

Tabu Ley Rochereau - Mokolo Nakokufa (audio)
Veja o vídeo de música de {trackName} de {artistName}

Destacado em

Créditos

PERFORMING ARTISTS
Le Seigneur Rochereau
Le Seigneur Rochereau
Performer
Tabu Ley Rochereau
Tabu Ley Rochereau
Performer
L'African Fiesta National
L'African Fiesta National
Performer
COMPOSITION & LYRICS
Pascal Emmanuel Tabu Ley
Pascal Emmanuel Tabu Ley
Composer

Letra

Mokolo mosusu ngai nakanisi Naloti lokola ngai nakolala Ah mama ha Mokolo nakokufa Mokolo nakokufa, nani akolela nga Nakoyeba te oh Tika namilela Liwa ya zamba soki mpe liwa ya mboka Liwa ya mpasi soki mpe liwa ya mayi Oh mama uh Mokolo nakokufa Mokolo nakokufa, ngai motu ya pauvre Nakanisa Ida mwasi oyo nabala Nakanisa kaka bana nabota Nasepela kaka mpasi ya mokili ezali kotikala Mokolo nakokufa Mokolo nakokufa, ngáí moto ya mbóngo Nakanisa falánga míngi óyo natíkí Nakanisa lopángo na bakaminyó Nakanisa bána ngáí natínda na Mpótó Mamá uh Mokolo nakokufa Mokolo nakokufa, ngáí moto ya kwíti Nakanisa kopó ya masanga na ngai Nakanisa níni kaka súka ya sánzá Ntángo namelaka ngáí na baníngá Ah Mamá ha Mokolo nakokufa Mokolo nakokufa, ngáí mwásí ya ndúmbá Nakanisa níni káka perruque na ngá Nakanisa níni káka na bilambá na nga Nakolela káka African-Fiesta etíkala Mamá Mokolo nakokufa Mokolo nakokufa, nani akolela nga Nakoyeba te o Tika namilela Liwa ya zamba soki mpe liwa ya mboka Liwa ya mpasi soki mpe liwa ya mayi Oh mama Mokolo nakokufa Mokolo nakokufa, ngáí moto ya kwíti Nakanisa kopó ya masanga na ngai Nakanisa níni kaka súka ya sánzá Ntángo namelaka ngáí na baníngá Ah Mamá uh Mokolo nakokufa Mokolo nakokufa, ngáí mwásí ya ndúmbá Nakanisa níni káka perruque na ngá Nakanisa níni káka bilambá na nga Nakolela káka African-Fiesta etíkala Mamá Mokolo nakokufa
Writer(s): Rochereau Lyrics powered by www.musixmatch.com
instagramSharePathic_arrow_out