Music Video

Featured In

Credits

PERFORMING ARTISTS
Alain Moloto
Alain Moloto
Performer
GAEL
GAEL
Performer
COMPOSITION & LYRICS
Adorons L'éternel
Adorons L'éternel
Composer

Lyrics

Alléluia, alléluia Monisa nkémbo na Yo, mokonzi Obongi na lokumu Obongi na nkémbo pe na masanjoli, moyengebene Nzambe ya solo nde Yo Tofukami liboso na Yo Tokiti liboso n'o mokonzi Alléluia Kombo na Yo ekumisama Mpo Y'ozali Nzambe Bolingo na Yo efanda na mitéma Y'ozali Nzambe Mpe nionso efukamela Yo Mpo lokumu ezali ya Yo Netolama Nkolo na nionso Togumbameli Yo, Yésu Yo molingami na nga Bomoyi na nga eza ya Yo Na sé ya ngolu na Yo, namona nkémbo Y'ozali Nzambe Mpe nionso efukamela Yo Mpo lokumu ezali ya Yo (alléluia) Netolama Nkolo na nionso Togumbameli Yo, Yésu Nani abongi na lokumu lokola Masiya? Oyo liloba na yé eza nguya Bipayi binso bomoyi bojali, Y'ojali Nkolo Nionso efukama na kombo na Yo Y'obongi na lokumu Y'ofandi na bisika Bileki na nkémbo Nkolo na bolingo nionso Yo ndé Nzambe na nguya Mokokisi na bilaka Nkémbo eza ya Yo Zua lokumu Nkolo Nazala lokola Yo Sala ete bomoyi na nga na ya Yo ezala moko Natatola mpe nayemba ete Y'obongi na lokumu Nani aza lokola Yo? Otombolaka nkita pe lokumu la mboka Totatoli mpe toyembi ete Y'obongi na lokumu Alléluia, ozali Nzambe obongi na lokumu Ozali Nzambe oyo atombolaka nkita ya ekolo Otombolaka lokumu ya mboka, Nkolo na bomoyi Nzambe ya mboka Congo ezali Yo Tomisopi liboso na Yo Po ete ozali Nkolo, Nkolo oyo asepeli kofanda na kiti ya bokonzi ya mboka oyo Y'obongi na lukumu Y'ofandi na bisika Bileki na nkémbo Nkolo na bolingo nionso Yo ndé Nzambe na nguya Mokokisi na bilaka Nkémbo eza ya Yo zwa lokumu, Nkolo (na zala lokola) Na zala lokola Yo Sala ete bomoyi na nga na ya Yo ezala moko Na tatola mpe na yemba ete Y'obongi na lokumu (nani aza lokola) Nani aza lokola yo? (Otombolaka) Otombolaka nkita pe lokumu la mboka Totatoli pe to yembi ete Y'obongi na lokumu Totatoli pe to yembi ete Y'obongi na lokumu (na nionso osali, to tomboli Yo) Totatoli pe to yembi ete Y'obongi na lokumu (to tatoli, to tatoli eh) Totatoli pe to yembi ete Y'obongi na lokumu (to tatoli, to tatoli eh) Totatoli pe to yembi ete Y'obongi na lokumu Alléluia, Tu es digne de gloire Toi qui as déversé Ton amour dans nos cœurs Afin que nous puissions aimer comme Toi Alléluia
Writer(s): 0, Katoto Antoine Lyrics powered by www.musixmatch.com
instagramSharePathic_arrow_out