Lyrics

Moko té azalaki na makoki ya kosala Oyo Nzambé kaka ndé akokaki ko sala Yango wana azwi liloba oyo ezalaki Nzambé Mpé asaleli yango nzoto, oyo abotamaki azalaki Nzambé Alléluia Yembela bipayi ezali yo, motema n'o etondisama na esengo Parce que nous célébrons le ressuscité Alléluia Okokisa makambo nionso n'ekulusu Pona tina na ngayi eh, ooh Yesu uuh Yaya okokisa makambo nionso n'ekulusu Pona tina na ngayi eh, ooh Yesu uuh Nzambé monène alati mposo ya bomoto Pona tina na ngayi eh, ooh Yesu uuh Nkolo wolo, palata abotami pène ya bibwelé Pona tina na ngayi eh, ooh Yesu uuh L'avocat auprès du père azangi eloko yako loba Pona tina na ngayi eh, ooh Yesu uuh Monkozi ya mapinga ba beti yé na ba soldats Pona tina na ngayi eh, ooh Yesu uuh Yé ko le roi des rois ba latisi yé ekoti ya nzubé Pona tina na ngayi eh, ooh Yesu uuh Ah ah ah Yesu (aaahh aah ah Yesu) Mwana mpaté (mwana na mpaté, obongi na lokumu) Ah ah ah Yesu (aaahh aah ah Yesu) Mwana mpaté (mwana na mpaté, molongi ya balongi) Okokisa makambo nionso na ekulusu Pona tina na ngayi eh, ooh Yesu uuh O ndima liwa ya somo n'ekulusu Pona tina na ngayi eh, ooh Yesu uuh Mokeli na nionso akomi mosali ya mabaya Pona tina na ngayi eh, ooh Yesu uuh Nzambé na nkembo ba sambisi yé n'ekelamu Pona tina na ngayi eh, ooh Yesu uuh Nkino a ganga n'ekulusu "tout est accompli" Pona tina na ngayi eh, ooh Yesu uuh "Eli, Eli, lama sabachthani" Yesu aleli ngo Pona tina na ngayi eh, ooh Yesu uuh Ah ah ah Yesu (aaahh aah ah Yesu) Mwana mpaté (mwana na mpaté, obongi na lokumu) Ah ah ah Yesu (aaahh aah ah Yesu) Mwana mpaté (mwana na mpaté, molongi ya balongi) Yango na yembi mwana mpaté (mwana na mpaté, mwana na mpaté) Mwana na mpaté eeh (mwana na mpaté) Mwana na mpaté eh eeeh (mwana na mpaté) Mwana na mpaté, eh eeeh (mwana na mpaté eeeh) Mwana na mpaté eh (mwana na mpaté) Mpaté na Nzambé (mwana na mpaté) Mpaté eeeh (mwana na mpaté) Mpaté na Nzambé eeh (mwana na mpaté eeeh) Azui bisika na nga ya mbeka liboso na tata (mwana na mpa-aaa-té eeeh) Mwana na mpaté eeh (mwana na mpaté) Mwana na mpaté eeh (mwana na mpaté) Bisika awuti ba moni té (mwana na mpaté) Nzoka ndé awuti likolo (mwana na mpaté) Apesami bisika ya liwa ya bato Yesu masiya ngo ooh (mwana na mpa-aaa-té) Yesu eh, eeh, eeeh elonga na nga Elonga na nga ah, aaah (Yesu eh, eeh, eeeh elonga na nga) Yesu elonga na nga, ooh (Yesu eh, eeh, eeeh elonga na nga) To kozonga lisusu sima té eeeh (Yesu eh, eeh, eeeh elonga na nga) Congo ezali mboka ya elaka, aaah (Yesu eh, eeh, eeeh elonga na nga) Ngonga ya Nzambé ebeti na mbok'oyo, ooh (Yesu eh, eeh, eeeh elonga na nga) Molongi akoti esengeli to longa, aaah (Yesu eh, eeh, eeeh elonga na nga) Ils l'ont vécu à cause du sang de l'agneau, ooh (Yesu eh, eeh, eeeh elonga na nga) Il les a livré publiquement sur table nous (Yesu eh, eeh, eeeh elonga na nga) (Mwana na mpaté) Mwana na mpaté eeh (mwana na mpaté) Mpaté eh eeeh (mwana na mpaté) Mpaté na Nzambé eh (mwana na mpaté) Mpaté, eh eeeh (mwana na mpaté) Mpaté na Nzambé eh (mwana na mpaté) Sujet ya masajonli na nga, (mwana na mpaté) Elamba na nga ya nkembo, (mwana na mpaté) Esengo ya motema na nga, (mwana na mpaté) Bikuké ekotisi na nkembo, (mwana na mpaté) Mpaté na Nzambé azui bisika ya passi ya ba ndimi, (mwana na mpaté) Apetoli mitema (mwana na mpaté) abimisi bisso bi pené ya papa, (mwana na mpaté) Tokomi ba santu pona yé (mwana na mpaté) Yo ndé, yo ndé, (mwana na mpaté) Yo ndé, yo ndé, mokonzi ya bakonzi (mwana na mpaté) Yo ndé, yo ndé, elikia ya motema yo ndé (mwana na mpaté) Yo ndé, yo ndé, mo panguisi pinjoli yo ndé (mwana na mpaté) Yo ndé, yo ndé, elombé mobali yo ndé (mwana na mpaté) Yo ndé, yo ndé, elikia ya motema yo ndé (mwana na mpaté) Yo ndé, yo ndé, elingi ya kozala yo ndé (mwana na mpaté)
Writer(s): Inconnu Compositeur Auteur, Katoto Luhembe Antoine Lyrics powered by www.musixmatch.com
instagramSharePathic_arrow_out