Music Video

Music Video

Credits

PERFORMING ARTISTS
Aimé Nkanu
Aimé Nkanu
Lead Vocals
Fiston Banzuzi
Fiston Banzuzi
Keyboards
COMPOSITION & LYRICS
Aimé Nkanu
Aimé Nkanu
Songwriter
PRODUCTION & ENGINEERING
Aimé Nkanu
Aimé Nkanu
Producer
Antoine KATOTO LUHEMBE
Antoine KATOTO LUHEMBE
Co-Producer

Lyrics

(Lelo mokolo ya mbotama na ngai.
Merci pona ba souhait ba fleurs na ba cadeaux
Kasi ebongi malamu, tokumisa Nzambe.
Oyo asali biso ngolu.)
Na pasi to na bisengo etinda nga kokumisa Nzambe.
Po oyo asali na bomoyi na nga eleki minene
Wuta bomuana kino kokola na nga.
Sanza libua na libumu ya maman Le 30 Septembre 1972
Na lingaki kokufa na ngai , po ezalaki maman na muana
Moko akufa ah ahh (2X) Merci maman. ( Merci papa)
Kumisama Yahwe, opesi nga bomoyi ya ofele
Basusu bakufi , basusu bakobelaka. (2X)
Soki na tali bomoyi na ngai wuta Matadi
Ezali se ngolu na yo Nkolo na nga.
Yolokoti ngai na kati ya potopoto
Y'osukoli ngai lelo y'opesi nga tina na miso ya bato
Soki na tali bomoyi na ngai wuta bomuana
Esali se ngolu na yo Nkolo na ngai
Ebele tozalaki na bango lobi lelo bakoma bibembe
Nga na leki bango na nini eh Nkolo na nga
Solo ngai moto pamba salela ngai lolenge y'Olingi.
Yahwe Yahwe Yahwe...
Kumisama Yahwe, opesi nga bomoyi ya ofele
Basusu bakufi , basusu bakobelaka. (2X)
Ezali pona koyemba na nga te Nzambe
Ezali pona ko teya nga te Yesu,
Kasi y'omoko y'oponi nga
Osali ngai ngolu, nazala lelo na bomoyi eh
Ezali pona mayele na ngai te Yahwe
Ezali pona kitoko na ngai te Yesu
Kasi yomoko y'oponi ngai osali nga ngolu
Nazala lelo na bomoyi eh (2X)
Soki ezalaki pona mayele, nde ba savants ,
Ba professeurs d'universités bakufaka te.
Soki pe ezalaki pona kitoko,
Nde ba miss oyo tomonaka na télévision bakufaka te.
Kasi ezali pona ngolu oyo asalaka biso.
Tofuti eloko moko te.
Kumisama Yahwe, opesi nga bomoyi ya ofele
Basusu bakufi , basusu bakobelaka. (2X)
Basusu lilita , basusu na l'hopitalo
Basusu bakufi , basusu bakobelaka
Basusu na lilita basusu na mbeto ya l'hopitalo
Nga na pesi yo nini po opesanga bomoyi.
Basusu ba kufi , basusu bakobelaka.
( Ezali pona oyo tosalak pona Nzambe
Pona ndenge to teyaka te ,
Pona ndenge toyembaka te.
Kasi ezali ngolu asala biso.
Boni balekaki biso na bosantu lelo bakufa
Ndeko toyeba pe " Un jour qui passe ,
Une année qui passe, c'est un pas vers la mort.
Sosola somba tango, po mikolo etikali mike)
Musique et paroles : Aimé NKANU
Written by: Aimé Nkanu
instagramSharePathic_arrow_out

Loading...