Lyrics

Matondo na Yo, Nkolo Pona bolamu bwa Yo Ofungoli bikuké bwa Yo Opesi biso njela ya kokota na ema na Yo Kosimba motéma na Yo Biso tobiangamaki té Tobongamaki pe té Ngoli na Yo esali kati na biso Ebuki éfelo ya bokabuani Epesi biso ebonga Pembeni ya nkembo na Yo Nani aza lokola Yo? Nani akosunga lokola Yo? Miso etombwami likolo Tokotatola monene na Yo Nani aza lokola Yo? Nani akosunga lokola Yo? Miso etombwami likolo Tokotatola monene na Yo Kombo na Yo Nzambe Seko na seko okumama Kombo na Yo Nzambe Seko na seko okumama Nzamb'oyo atombolaka Pe mokili egangi na kokamwa Afongola njela ya seko Na matambe na té tozui Esengo'a kati'a motéma Lisungi oyo esilaka té Totomboli maboko Tosemboli miso likolo Na ye oyo aleki na nguya Tobuaka motolé ya kembo Liboso na Yo, Nzambe Séko na séko okumama Nani aza lokola Yo? Nani akosunga lokola Yo? Miso etombwami likolo Tokotatola monene na Yo Nani aza lokola Yo? Nani akosunga lokola Yo? Miso etombwami likolo Tokotatola monene na Yo Kombo na Yo Nzambe Seko na seko okumama Kombo na Yo Nzambe Seko na seko okumama Kombo na Yo Nzambe Seko na seko okumama
Writer(s): Inconnu Compositeur Auteur, Katoto Luhembe Antoine Lyrics powered by www.musixmatch.com
instagramPath