歌词
Intro
Yeeeah Mwana Nzambe,
King Lesh,
Mental Engagé, Yeah Yeah!
Bon, bandeko, naza na mituna yako tuna hein, Nalingi na tuna, Na ndenge ya mabe te.
Couplet I
Na ndeg’a mabe te hein, fallait kaka nga na loba ?
Na ndeg’a mabe te hein, bozela kasi na loba.
Fallait kaka nga na zonga, Bo boulaki nga naza zoba,
Yango natikelaki bino mwa temps na mon’o boko sala.
Han,
Tobanda nanu wapi?
Gouverneur aza nanu wapi?
Yango avandaka na biso to ye azalaka nanu wapi?
Mibeko bo zwaka awa, eza nde kaka ba sentiments hein?
Ba eglises ebele ezo tia biso kaka makelele!
Bandimi kaa’ 20, batié pe ba baffles 20 !
Tobunda na mokate, to bunda pe na ba makelele.
Bongo Yoka Tapage!
Eglises, bars ndenge moko!
Na makelele ya boye tokoma maboma te ndee nini?
Refrain x2
Na ndeng’a mabe te hein, nazo luka nde na yeba,
Na ndeng’a mabe te hein, motun’eza lisasi te.
Bo lukisa nga te, na tuni na ndeng’a mabe te (Pardon).
Na ndeng’a mabe te hein, bo pesa kaka biyano.
Couplet II
Allô allô Mokonzi,
Boni ba sango ya Beni?
Na ndeng’a mabe te hein, QG y’armé eza djà kuna?
Na lobi mabe te, yo mok’olakaka biso!
Na ndeng’a mabe te hein, okovanda kuna mukolo nini?
Bakonzi ya  police, tosolola neti mikolo,
Ndeng’a mabe te hein, mapinga basalaka musala bien?
Ba roulage ya Nzela, na ba policiers na butu,
Na ndeng’a mabe te hein, bopye bango combien sur 10 ?
Ba zuzi ya congo, bino pe natuna bino,
Na ndeng’a mabe te hein, mbongo ya 100 jours ezonga?
Bokanga na bino batu, mais suit’ango nd’eza flou
Refrain (x2)
Na ndeng’a mabe te hein, nazo luka nde na yeba,
Na ndeng’a mabe te hein, motun’eza lisasi te.
Bo lukisa nga te, na tuni na ndeng’a mabe te (Pardon).
Na ndeng’a mabe te hein, bo pesa kaka biyano.
Outro
Allô ! Allô « le débat » ! Na lobi hein !
Na ndenge ya mabe te !
Retro commission na corruption ekeseni?
Bon, wana bino kaka nde boko loba hein ! (Na ndenge ya mabe te !)
Justice na Etat de droit yango, toko tala na passé te ?
Donc to banda kaka lelo ? Ba oyo bakufa kala ba kufa ofele ? (Na ndenge ya mabe te !)
Ba députés bao fingana graaaave na YouTube, tobenga bango kaka honorables ?
Hein ? Vraiment, baza kaka honorables ? (Na ndenge ya mabe te !)
Ministre akuti embouteillages, a kumbi na ye à contre sens !
Bon, soki biso pe tolandeli mabeeeehhh?
To ye aza Congolais ko leka biso?
Merci ndenge bo kotisi nga na ba ndaku ya batu, (Na ndenge ya mabe te !)
Motuna eza lisasi te,
Bo lukisa nga te, na tuni na ndeng’a mabe te (Pardon !)
Na ndenge ya mabe te hein, bo pesa biso biyano.
Christian Lusakueno, Thierry Kambundi, Top Congo Fm !
Allô ! Allôooo !?
Ouais, pardon hein, na bosanaki, sikoyo libala ekufa to ekufa te ?
Eeeeh,Tour oyo nde na silisi penza ! Bayo !
Written by: Alesh