Lyrics

Suki nayo nzoka ezalaki Kanga moyibi ekanga miso ma ngayi e Ata natali nazo mona mosusu te A part toi il n'y aura toujours que toi Motema nanga ezalaki gratte-ciel Yo okomisi yango poulailler Ezanga kiti, mbeto te, famille, nzungu te Ekomi kotonda makila lokola masuwa etoboki Yo ozongisi nga na brouillon ami Malgre ba efforts nasali Liloba nangayi mongongo ya ligorodo Na matoyi mayo ya angelo Nasala nini na manzaka Na suki otika Nakanisela yo Mawa ekoti Lokola sete na cervau Bolingo ekeyi Motema elalaki na mayi Mais toujours ezo zika koleka nkoni Babengani nga na feti Mawa nanga ezo komisa masanga bololo Likolo eteli ba ndeke basepeli Ba plage etondi Ba mamans basokolaki ba uniforme Mitema ekiti Moyi nanga ongaleli wapi? Han pepito moyi nanga ongaleli wapi? Naluki yo na flambo na maboko kilala Nini bozo tala tala ngayi e Eske naino bomona te moto ekweleli probleeeme Nabeleli ozo yoka nga te Pepito keba mabele eya ko fongwamlela ngayi e Mikolo ebele eleki sans yo Ekomi ko terrifier ngayi Bipe nga ata na minuit Tango mosusu ekozala somnifer Bipe nga ata na minuit Tango mosusu ekozala diazepam Nasali petit dejeuner tongo tongo Namemi na mbeto nzoko na bosanaki ke osi okenda Bilamba nangayi nyonso ya pembe Ekomi blanc casse Po yo nde omesana kosokola yango oo Sala noki ozonga Comportement ya yousouf ekomi deregle Na esika ya sukali nakomi ko preferer mungwa Bako salela nga katafalke Bako tia nga na libulu ya mabele Pona yo pepito kilala Maboko ya yousouf Ekomi kizengi Po ezangi promenade nango Likolo ya loposo nayo pepito Bilengi nanga Ebombami nango na kati ya nzoto nayo ya ba angelu Na baluki na baluki na baluki Na baluki na baluki na baluki na baluki Nzoto ekomi likonga ya montre likolo ya mbeto Natala kitala-tala kala Nzoka nakoma na regard ya ba kilao Ha ha nzambe,! Pitie pitier cessez le feu Yoka nga ata ndambo ya mawa pepito kilala Reciprocite ezalaka fleche d'aller Accompagnee na oyo ya retour Souci ya bolingo Chagrin e percute nga motema Awa o vire nga Ouvrier ya pamba na bolingo naye Tala souci e engage motema sans service Akomi ko futa ba heures supplementaires Na jours feries Feuille ya motema nanga recto Esi etondi na ba souci Verso yango oyo ekomi na la motie Sala o efacer ata ndambo nga nakowa Dedicaces tosala lokola ... ... Bolingo ewzalaka nzoka lipate Ekweleli nga lelo lobi pe ekozala yo Pasi na motema nanga kozanga eloko motema elinga Uta na kutana na ba carte rouge ya bolingo Po nakoka lisusu kolinga te Desire nayo sentiment nangayi
Writer(s): Falli Ipupa N Simba Lyrics powered by www.musixmatch.com
instagramSharePathic_arrow_out