Podobné skladby
Kredity
PERFORMING ARTISTS
VAN WALESA
Performer
COMPOSITION & LYRICS
VAN WALESA
Songwriter
Texty
Esika bato ba lobi non, Nzambe alobi oui
Nga na banga nini eeh (Nga na banga nini eeeeh)
Esika bato ba lobi non, Nzambe alobi oui
Nga na banga nini eeh (Nga na banga nini eeeeh)
Ah ngai ooh
Esika bato ba lobi non, Nzambe alobi oui
Nga na banga nini eeh (na banga nini eeeeh)
Esika bato ba lobi non, Nzambe alobi oui
(Na banga nini eeeeh) nga na banga nini eeh
Nakoki komitungisa te pona maloba ya bato
Oyo bako loba pona vie na ngai
De mon côté, nga na bateli kimia
Po maloba ya bato eza maloba ya Nzambe te
Bato ba lobaka oyo bango ba monaka eh
Kasi maloba ya Nzambe na bilaka na ye, ngayi eeh
Esika bato ba lobi non, Nzambe alobi oui
Nga na banga nini eeh (na banga nini eeeeh)
Esika bato ba lobi non, Nzambe alobi oui
(Na banga nini eeeeh) nga na banga nini eeh
Moto oyo aza na bilaka ya Nzambe eeeh, ba sekaka ye te eeeh
Moto oyo aza na bilaka ya Nzambe eeeh, ba sekaka ye te eeeh
Ata azo tambola makolo ngul'oh, ba sekaka ye te oooh yeeeh
Ata azo kelela, kelela, kelela, kelela, ba sekaka ye te ooooh
Mokolo loboko ya Nzambe eko signé, boko kamwa eeeh, boko kamwa eeeh
Aah boko kamua eeeeeh
Bilaka e dependaka na moto apesi ya ngo eh
Soki ye akufi bilaka pe ekufi, oyo apesa bilaka, eza Nzambe ya lola
Akufaka jamais po aza eternel, azanga ebandeli, azanga pe na suka
Bilaka na ye ekufaka jamais
Na lela pona nini? Na lela pona nini? Na lela pona nini? Ye-eeh
Na mitungisa pona nini? Na lela pona nini?
Bilaka na Yesu e'echouaka jamais eeeh
Nga nazalaki lokola chifon na maboko ya bato, eloko ezanga tina
Nani ako tala ngayi eeh, moto yako buaka mosika, moto ya milelo
Mafinga nionso kaka nga, nani ako tala ngayi eeh
Kaka chifon wana nde Nzambe alokoti eh, asaleli yango ngolu, epanguisi soni ya famille
Kaka chifon wana nde Nzambe alokoti eeh, asaleli yango ngolu, epanguisi soni ya famille
Na conclure pona vie na ngayi eeh, Yesu nde Champion, obunda bitumba na ngayi
Na conclure pona vie na ngayi eeh, oyo elobi Yaweh, yango nde nga na zali
Naza ya Yesu eeh, oyo aloba nde lelo nazo simba awa
Naza ya Yesu eeh, oyo alaka nde lelo nazo mona, ngayi naza yeeeh
Naza ya Yesu eeh (eh ngayi oh, ngai oh)
Oyo aloba nde lelo nazo mona
(Eh ngayi nazali) naza ya Yesu eeh (naza oyo ya maloba ya batu te)
Oyo alaka nde lelo nazo bika
(Naza oyo ba ndoki ba lobi te) naza ya Yesu eeh (naza oyo famille eloba te)
Oyo aloba nde lelo nazo mona
(Eh ngayi Yaya, Yaya) Naza ya Yesu eeh
Oyo alaka nde lelo nazo bika
Naza ya Yesu eeh, maloba ya ba ndoki eza sans effet
Naza ya Yesu eeh, oyo aloba nde lelo nazo mona eeeh
Naza ya Yesu eeeh, eeeh ngayi oyo eh
Nzambi wanyi eh
Osaleli nga bikamua, oh-uh-oh
Writer(s): Van Kabundi
Lyrics powered by www.musixmatch.com