Songtexte

Na ebandeli ya mokili Ezalaki nde liloba Liloba ezalaki nde Nzambe L'éternel des armées Yahweh akeli likolo na se Akeli pe moto, moto na elili na ye Kasi moto atosaki te mibeko Akosamaki na nyoka oy'akosi mwasi Balei mbuma oyo Nzambe apekisaki Babebisi mokili ya Nzambe Bakomisi yango pêché Yango mokili ekoma boye Ata ozali na mbongo Ndima Nzambe, ndima Nzambe Ye akeli likolo na se Allah Ata ozali mowumbu Ndima Nzambe, ndima Nzambe Ye akeli likolo na se Allah Ata ozali kobela Ndima Nzambe, ndima Nzambe Ye akeli likolo na se Allah Ata ozali moloki Ndima Nzambe, ndima Nzambe Ye akeli likolo na se Allah Yahweh naboyi otika ngai lokola mboka ya Sodome Oyo yo oboyaki Loth atala sima Nzambe Tata, naleli Oh, nakosenga na yo Nzambe Ta Pesa nga makasi nalonga na etumba ya se Nabeleli yo Nzapa (yoka ba mpasi na nga) Oh Jehovah Allah l'éternel (yo nde libiki na) Kitisa nguya na yo ekita a-ah Tosengi nguya na yo ekita a-ah Oh, na se e-e-e-eh Oh, na se e-e-e-eh Oh, na se e-e-e-eh Oh, na se e-e-e-eh Ata osimba mandoki Ndima Nzambe, ndima Nzambe Ye akeli likolo na se Allah Ata ozali imposteur Ndima Nzambe, ndima Nzambe (Imposteur eh) Ye akeli likolo na se Allah Tozali kofuta motuya ya nyongo toyebi te Oh Nzambe Douleur na nga Christian Mazaret Oh soki nakeleli eh Richard Mwanaka Rostel Bakwa Oh, na nguya na ye Moïse alongolaki bowumbu na Bana Israel Se na nzete ya pamba akabolaki mayi ya la mer Ndima ye (Nzambe tata yo-yo-yo) Alobaki na Moïse amata na ngomba ya Sinai Pona kozua mibeko les 10 commandements ya Nzambe Tosa yango Linga Nzambe na motema moko (y'okokosa te) Y'okoyiba te y'okoboma te (y'okosambela bikeko te) Linga moninga na yo lokola omilingaka (y'okosala ekobo te Nelly) Kozua na yo to kozanga Kombo ya Nzambe ekima yo te na monoko Ndzembo Olela Kumisa Yahweh ye moto akela yo Michel Ambeto Moise Ambeto Ata ozali moyibi Ndima Nzambe, ndima Nzambe Ye akeli likolo na se Allah Ata ozali bordela Ndima Nzambe, ndima Nzambe Ye akeli likolo na se Allah Kitisa nguya na yo ekita a-ah Tosengi nguya na yo ekita a-ah
Writer(s): Extra Musica Lyrics powered by www.musixmatch.com
instagramSharePathic_arrow_out