Στίχοι

Yémei Ekendeki Ezongaki Kasi ekomi té (Mimi Dispy, hein) Yoka mwasi, mwasi yokamela ngai Ya rose oyo ekolisama na eau bénite Ngai mobali na zalaka na mposa ba linga nga Nazalaka na mposa ya vrai romance Lelo ndoto na nga eleki mpongi na molayi eh-eh Sentiment na yo Bambi, e saouler nga Maboko mayo eleki berceau, oh Nazokoka té kolongwa na mpongi eh, problème (Noemie, anh) Yoka mwasi, Bambi, yokamela ngai Mwana maman Dje, oyokamela ngai Akramo Dje, nazalaka na mposa ba linga nga Nazalaka na mposa ya vrai romance Lelo ndoto na nga eleki mpongi na molayi, eh-eh Sentiment na yo Bambi, e saouler nga Loketo nayo ezanga mokuwa Ebuki oyo yanga mikuwa moko-moko tii na suka, ah-eh-eh (anh) Tongo ya lelo, tongo ya mawa eh (ya mawa) Tongo ya lelo, tongo ya mukuya eh Tongo ya lelo mwesé eti loboko na litama Tongo ya lelo, tongo elengi té oh Ata café eb'o ko yokana na sukali eh, po oza té Maboko mayo eleki berceau oh Nazokoka té kolongwa na mpongi eh, zwa n'o nga (Maman colonel, anh) Tongo ya lelo ntongo ya mawa eh (mama mia eh) Tongo ya lelo, tongo ya mukuya eh (mukuya) Tongo ya lelo ata na Paradis eza ville morte (lelo) Tongo ya lelo mwesé eti loboko na litama Tongo ya lelo, tongo elengi te oh Ata café ebo ko simba sukali eh, po oza té Loketo nayo ezanga mokuwa Ebuki oyo yanga mikuwa moko-moko, sans pitié (Michel Luya, plus d'or du palmarès) Bambi yaka n'o eh, kata nga pota Na lembi eyoma, na signer eyoma Makango ya papa ba bengaka yé maman Bambi Ngoluka Lobengo, koya té okweyelinga Caprices des dieux Canne à sucre, tues-moi ce soir À toutes les sauces, mange-moi, ah-ah Pinzoli ekoti likambo yango Ekomi'o tia nga na maboko ya liwa Butu nionso etikaka na matama Na nga, bilembo mibalé oya mpembé Est-ce que wana eza té nzela na nga ya lilita? Bambi, loba Elili na yo, Bambi Oyo na bombaki na kati ya motéma eh Yango emati lelo na moto Ekomi'o tungisa oyo ya nga bongo Ekoya'o bebisa oya ya ngai paix du cœur Est-ce que wana eza té commencement ya kilawu? Bambi, loba Kombo na yo, Bambi Oyo na bombaki lokola ekila ah Yango oyo na nzémbo, lelo nga na yembi eh Ba kala té na ko koma na ba journaux Na ba prospectus, na ba panneaux géants Est-ce que wana eza té nzela na nga ya lilita? Bambi, loba (tonton Fila, Guy Vanda) Na lulaki yo eh, Bambino eh-eh Na miso ya moto alobaka té oh Na bengaki yo eh, mon amour Mongongo na nga ya moto oyo amonaka té Motéma na nga epayi oloni ya yo amour Ya bébé ayebi sé bolingo ya maman Oh, Bambino eh, Bambino malelisa issey oh (George Weah, géant garçon de Tchatcho) Pé-pé-pé-pé Bambi oh, Bambino Bambi, nga amour na yo ezingi nga eh Bambi nga amour na yo ekangi nga eh Na loti yo na ngambo ya ebalé Y'olati sé zigida na lokéto Y'ozo lela ozo benga kombo na ngai eh Elelo ya mbongé ezipi oyo ya yo eh Y'ozo luka bwato oya na ngambo epayi nazali, mawa trop Likolo ya amour na yo (yeh, yeh) Likolo ya amour na yo (yeh, yeh) Kaka liwa yeh, yeh Kaka liwa yeh Kaka liwa yeh, yeh, yeh, yeh Na signer eyoma Na ndimi, nga na jurer Pona amour na nga Bambi Pona amour na nga encore Pona yo Bambino oh (Coli Vila na Luanda) Mokolo ya liwa na nga, Bambi otuna té oh Mokolo ya liwa na nga, Bambi olela té Ebongaki té ofibisa nga bonbon Bongo oya ko komisa ngai non partant Bongo okenda na sima otika nga ah Y'o tika nga Chabada-bada-boum-bing, bong-bing Chabada-bada-boum-bing, bong-bing Chabada-bada-boum-bing, bong-bing Chabada-bada-boum-bing, bong-bing-bong Likolo ya amour na yo (yeh, yeh) Likolo ya amour na yo (yeh, yeh) Sé oyo ya Nzambé, sé oyo ya maman Amy Sé mosala eh Na signer eyoma Na ndimi, nga na jurer Pona amour na nga Bambi Pona amour na nga encore Pona yo Bambino oh
Writer(s): Koffi Olomide Lyrics powered by www.musixmatch.com
instagramSharePathic_arrow_out