Video musical

Video musical

Créditos

Letra

Saison sèche ezalaka pe saison de pluie eh
Tango ya moyi ezalaka pe tango ya butu ezali oh
Mwasi na mobali oh likolo pe na se
Mabe na malamu eh, Nzambe pe satan
Ebale pe mokili oh, mozui pe mobala oh
Mokuse pe molayi oh, monene pe moke oh
Yaya pe leki yango babengi yango la loi de la nature oh maman
Saison sèche ezalaka pe saison de pluie eh
Tango ya moyi ezalaka pe tango ya butu ezali oh
Mwasi na mobali oh likolo pe na se
Mabe na malamu eh, Nzambe pe satan
Ebale pe mokili oh, mozui pe mobala oh
Mokuse pe molayi oh, monene pe moke oh
Yaya pe leki yango babengi yango la loi de la nature oh maman
Ah tika balobela yo esila ndeko na nga
La loi ya nature tango mususu saison na yo te
Zela oyo ya yo ekokisama oko forcé te oh
Tuna basali ya Nzambe bakopesa ngai raison
Sepela oyo ya moninga po oyo ya yo tango
Ekokoka bakosepela n'ango oh
Butu ekomeli yo, yeba pe tongo ezali eh
Mabe ekomeli yo, yeba pe malamu ezali eh
Nazelaka kaka tango na ngai nakozala consolée
Po nayebi naza projet na Nzambe
Ekokokisama kaka eh maman eh
Défaite eyaka, réussite ezali oh
Problème eyaka solution ezali oh
Soki malade eye guérison ezali eh
Nazela kaka tango na ngai eh
Ah eh soki malade eye guérison ezali, oh
Nazela kaka tango na ngai eeh
Wo wo wo Yesu abenga ngai besoin na Ye mon amoureux
Eeeh
Uumh na moke namona makambu à l'aise nga ngonga ebeti
Merci Papa, olingaka moto lolenge azali Ye nde ressemblance na yo
Bomoni tina Misamu akabolaka te po ya ngai ebeti lelo
Lobi pe ya basusu eh, Yesu akokufa pe pona bango eh
Ah, obwakisa moninga elakisa Ye nzela lobiko
Au lieu obenga ye païen, lakisa ye nzela ya Tata oyo eh ma
Nga kutu batshiola ngai na baninga eh
Ngai etula nga loba nini eh
(Tina te mokili eeh)
Mwana mabe
(Mwana mobola ah)
Bafinga ngai papa, bafinga ngai papa eh
Job asosolaki période ezongaki le double oh
Veuve ya Sarepta asosolaki akufaki nzala te oh
Mwasi ya ndumba asalelaki période na ye oh
Mwasi kotanga makila asalelaki période na ye oh
Yesu amonaki pasi esika oyo vandi na kiti ya bokonzi oh oh
Ah ebongo yo mwana osombami na makila ya Nzambe
Nalela po nini eh
Oyo batambola makolo lelo nakoma na mituka eh
Oyo bazanga kobota lelo bakoma bamama pasa
Eh, oyo bazanga mabala lelo bavanda na mabala ya malonga
Oyo bakita na se oh, lelo atombola bango na lokumu ooh maman eh
Nawela nini eh ngai eh
Naboma moto pona nini eh ngai eh
Ngai nasala kuluna pona nini eh ngai oh
Nafinga pona nini eh ngai
Nazela tango na ngai ekoka kino okosalela ngai oh
Ah, natia poison pona nini eh ngai oh eh mama eh
Nazela tango na ngai ekoka kino akosalela ngai
Nazela saison na ngai eh, kino ekobetela ngai oh mama
Nzambe asala ngai moyindo, asala ngai moke
Asala ngai mokuse nasepela ndenge nazali eh
Refain : Nasali bino nini oh ma (x22)
Saison na ngai eh esuwa basusu te oh
Ah ngai mobola alokoti ngai nase
Hum naza na nini eh atomboli ngai likolo
Ngai nawuti Mayumbu amemi ngai na poto
Ah ngolu eh ma, eh
Munu kuenda Kinshasa
Munu bakila malongi
Munu landa nzila ya Nzambi eh
Samu yayi saison na munu
Wolowo yaya eh
Wolowo yaya eh (x3)
Ah ngai moteki nguba ememi bana na poto
Ah ngai mosoli bilanga esilisi kelasi ya bana eh
Nafanda na bicoque eh ememela ngai ba ndaku eh
Ah ngai mopusi pusu ememeli ngai ba kombi
Ah ngolu eh ma, ah ngolu eh
Munu kuenda Kinshasa
Munu bakila malongi
Munu landa nzila ya Nzambi eh
Samu yayi saison na munu
Wolowo yaya eh
Oh wolowo yaya, eee ngai
Nasali bino
Ah ngai moteki makala ememeli ngai ba depôts
Bafinga ngai kisita nakoma maman mapasa
Eeeh ngai mobola eee atomboli ngai likolo
Bafinga ngai ndumba nafandisa libala
Ah ngolu eh ma, ah ngolu eh
Munu kuenda Kinshasa
Munu bakila malongi
Munu landa nzila ya Nzambi eh
Samu yayi saison na munu
Wolowo yaya eh
Oh wolowo yaya
Bafinga ngai makisosila nasala eloko te eh
Ah ngai bapasi eh pasi nionso ya ngai
Ah ngai monimambu eh namona nde makambo
Yesu yango alokoti ngai ya mboka na ngai eh
Eh ngai oyo napesi eloko te oh
Ah ngolu eh ma, eh
Munu kuenda Kinshasa
Munu bakila malongi
Munu landa nzila ya Nzambi eh
Samu yayi saison na munu
Wolowo yaya eh
Oh wolowo yaya
Ah ngai shayeur eh ememeli ngai magasin
Kaka na malewa libota na ngai ezobika oh
Ngai moteki na zando ememeli ngai ba voyages
Ah ngai motumbi ntaba ememeli ngai mapango
Ah ngolu eh ma, eh
Munu kuenda Kinshasa
Munu bakila malongi
Munu landa nzila ya Nzambi eh
Samu yayi saison na munu
Wolowo yaya eh
Oh wolowo (x5) yaya
Ah presser na vie emema na lilita
Ndeko na ngai eh zela saison na yo
Ngonga na yo ekobeta okosepela lokola basusu
Kofinga te, koyina te, kotshiola te
Soki eye kanga frein
Makambu mabe eleka na mokili basusu bateka baninga
Likolo ya zuwa eh
Tika trahison, double pattes, tokoma na deux oh
Mbeli ya minu mibale, eh banga Nzambe
Mosika na mboka nani yango asalisa ngai eh
Mosika na mboka nani yango abikisa ngai eh
Eh mame ma wolowo...
(x2)
Written by: Marie Misamu
instagramSharePathic_arrow_out

Loading...