Crédits

INTERPRÉTATION
Choc Stars
Choc Stars
Interprète
COMPOSITION ET PAROLES
Dieka Mbaki
Dieka Mbaki
Paroles/Composition

Paroles

Tikaka kolinga na bozoba boye Felie
Ozali future mama ya bana na ngai
Nalakisa yo mpe na baninga ba ngai
Tika komipesa nzoto na masenginya
Na motema ngai nazali kobanga
Nakokamwa motindo yo o-changé
Yo olobaki tokobalana na yo dis cheri la promesse est une dete
Mwasi azali lokola cameléon, achangeaka mibali
Ndenge cameléon achangeaka ba langue
Tuna ya mwasi ekokanaka na mobali te
Valeur ya mwasi na ndako ya mobali
Zikondo omoneli ngai, omoni ngai yuma, likambo te
Talatala ekosi yo, kitoko ya bomwana ekosilaka. (2)
Pa Felie yeye, Zikondo yeye, chance ya libala eyaka mbala moko
Tuna mama na yo, ayebisa yo, bolingo eloko ntalo ooo
Mpe ya kolengela. (2)
Avenir na motema nakobanga kanga matoyi mama e mpo tovande e
Na bolingo nyonso e ee matata ezanga te
Respect na la vie eza a tina te
Soki olandi e okoya kobunga zela
Avenir eee zala mayele, na la vie oyo kosala zoba te
Written by: Dieka Mbaki
instagramSharePathic_arrow_out

Loading...