album cover
Je M'enfous
album cover
Je M'enfous est sorti le 2 janvier 2014 par Kin-Express Productions dans le cadre de l'album Je M'en Fous
2 janvier 2014
LabelKin-Express Productions
BPM179
Qualité mélodique
Acoustique
Valence
Dansabilité
Énergie

Clip vidéo

Clip vidéo

Paroles

Je m'en fous
Mon Seigneur est le premier-né des visibles et des invisibles
Il s'appelle Yehoshua Hamashiach, Jésus
Soki ondimi te oyo bible ekoma, ndima ata pona ngai
Nazalaka pe kobeta tembe tala lelo oyo Yesu a convaincre ngai
Nayokaka kaka mokolo moko, Nzambe ya mwana mobali oyo
E bouleversa ngai nakomi séduit lelo oyo nakomi pe disciple na ye
Ngai oyo bato bazalaka koseka, lelo oyo Yesu afuti ngai
Makambo nionso ezalaka difficile, na bomoyi na ngai ekoma facile
Bongo yo oyebisa José Nzita boye: Yesu azali Nzambe te
Akovanda na kimia na pete nionso Pe ayebisi yo na lolendo (Je m'en fous)
Ah la la la la la la la la
Ah la la la la la la la
Yesu nde (Ah la la la)
Je l'affirme, mon Jésus, Nzambe ya bien
Ah la la la la la la
Ah la la la la la la
Yesu nde (Ah la la la)
Je confirme, Ya Yesu, Nzambe ya bien
Eh!
Champion!
Botuna ba mama bayebi sekele ya lipamboli na bango ya sanza
Esalaka kaka mikolo mitano ya pamba kasi bakomaka mal à l'aise
Bongo mwasi oyo akotanga makila, sanza moko te kasi douze ans
Asilisaki ba mbongo na ye nionso, kasi azalaki pe kobika te
Mokolo moko champion nde champion na domaine ya kokanga ba makila
Mwasi oyo asimbaki elamba na ye ya pamba pe makila na ye nionso esilaki
Azongelaki propriété na nzoto, akokaki pe kobota bana
Elongi ya mawa ebongwani esengo po akomi utile na société
Bongo yo oyebisa mama ya boye: Yesu azali Nzambe te
Akovanda na kimia na pete nionso pe ayebisi yo na madjunda (Je m'en fous)
Ah la la la la la la la la
Ah la la la la la la la (Yesu nde)
Yesu nde (Je l'affirme)
Je l'affirme, mon Jésus, Nzambe ya bien (Alléluia, Il est Dieu)
Ah la la la la la la
Ah la la la la la la (Yesu nde)
Yesu nde (Je le confirme)
Je confirme, Ya Yesu, Nzambe ya bien (Alléluia, Il est vrai Dieu)
Nayebi moto moko na biblia azalaka aveugle né
Mosala na ye ezalaki ya kosenga senga oyo na français babengi mendiant
Mokolo moko champion akoleka ye na bayekoli na ye
Amoni ye ayoki mawa abwaki soyi na se asali yango poto poto
Atie yango na miso na ye, atindi ye akende na Siloé
Kozonga na ye miso efongwami polémique ekotaki na kati ya ville
Babengi ye na kati ya synagogue, batuna ye ndenge nini abikaki
Alobi nayebi te, alobi na nga nasokola pe miso na nga ebiki
Balobi Yesu asalaka na kisi, nasepelaki na réponse ya Tata oyo
Azala Beelzébul, azala magicien, azala ndoki nalobi (Je m'en fous)
Ah la la la la la la la la
Ah la la la la la la la (Yesu nde)
Yesu nde (Je l'affirme)
Je l'affirme, mon Jésus, Nzambe ya bien (Alléluia, Il est Dieu)
Celui qui m'a guéri
Ah la la la la la la (Celui qui m'a sauvé)
Yesu nde (Je l'affirme)
Je confirme, Ya Yesu, Nzambe ya bien (Alléluia, Champion des Champions)
Eh!
Champion!
Différence ya Yesu na banzambe mosusu
Ezali na lisekwa na Yesu na kunda
Po mikuwa ya banzambe mususu eza nanu
Kasi oyo ya Yesu ezali te po asekwa
Le tombeau est vide, kunda eza polele
Epesi ngai kondima po nayembela Yesu
Le tombeau est vide, kunda eza polele
Etomboli kondima na nga pona Mesiya
Tala nalingi nayebisa yo
Oyebaka bien ete
Soki babanda na l'an zéro eza grâce ya Yesu, kasi yo oza na âge nini
Âge na yo eza par rapport ya l'an zéro, omona te baloba 500 ans avant Jésus to baloba 300 ans après Jésus (Eh!, Champion!)
Abima référence ya temps po ye nde Nzambe na bomoyi
Alléluia nakumisa Nzambe nini, oyo abimi lelo lelo, champion des champions en toute catégorie
Oh, Champion, Champion, Champion eh
Written by: Jose Nzita

Loading...