गाने

Motema mabe nayo eleki ee Papa, obosana bolamu nyoso nasalela yo (koko Nyboma) Motema sanduku ebomba nde makambo ebele mwana oyo, oh ngai nayo Oh nga na yo kotongo na kofingaka ngai eleki Okende koboma boma epayi ya bato Okoluka liwa na ngai mpo na nini? Tobotama moto na moto na etoile na ye Boni bokomi koteka koluka moto na ngai Boni bokomi koluka kosakana na na kombo na ngai Banzambe nyoso bosilisa kosambela Bible na maboko pe lokuta na monoko botika te Mwana oyo bizeti nayo eleki, fongola motema eeee Bakwiti nayo eleki Kosambela nayo papa okosaka nde bato Songi songi nayo mabe ekomi nde kindoki Kimobange nayo mabe ohh Balobela ngai na tiaki tembe Motema makasi nayo eleki Papa obosana bampasi tomona ayo Motema sanduku ebomba nde makambo ebele mwana oyo, oh ngai na yo Kotongo ngai na kofingaka ngai eleki Okende kotongotongo ngai epayi ya bafami nayo Okende koboma boma ngai epayi ya fami nayo Tobotama moto na moto na chance naye Tobotama moto na moto na etoile naye Boni bolingi kosakana na kombo na ngai Remy? Boni bokomi koluka kosakana na kombo na ngai Bandako nyoso bosilisa kokotakota Bible na maboko pe lokuta na monoko botika te Mwana oyo bomoto nayo wapi? Mwana oyo bilangwa nayo eleki ee Kosambela nayo papa okosaka na Songisongi nayo mabe ekomi nde kindoki Kimobange nayo mabe Balobela ngai na tiaki tembe Jalousie, ee jalousie nayo Eleki papa ee yango wana bakangi yo ndoki Jalousie, ee jalousie nayo Eleki makasi Mosala ozua ze kotongo bato Motema nayo mabe eleka makasi Yango ekomi kiwelewele Yango ekomi bilombalomba Okondima ah-ah-ah-ah okondima, bo ko ndima Oko ndima eh oko ndima Boni olukeli ngai liwa Ozali eloko nini Bayeba yo c'est que mabe Yango balaka te Yeba kombo na ngai Fidel Congo Ngando na nse ya mayi Fidel okola mabanga, beta beta Mpona nini olingi ngai nakufa papa ee Jalousie, ee jalousie nayo Eleki papa ee yango wana bakangi yo ndoki Jalousie, ee jalousie nayo Eleki makasi Mosala ozua ze kotongo bato Motema nayo mabe eleka makasi Yango ekomi kiwelewele Yango ekomi bilombalomba Okondima ah-ah-ah-ah okondima Mais oko nidma eh (okondima)
Writer(s): Nyboma Mwandido Lyrics powered by www.musixmatch.com
instagramSharePathic_arrow_out