가사

Ozali kimia ya bomoyi na biso Epayi bato ba lelaka pé ba mitungisaka, to fandaka na kimia Po kimia oyo epesamela biso, eza kimia ya mokili té C'est une paix venue dans haut Car celui qui nous a donné cette paix ce nome également du nom de cette paix Shaloom! Kimia na motema Esengo ya bato Wuta nga nakoma ko sambela bomoyi echangea, ah-ah-ah Bomoyi echangea, ah-ah-ah Sepela Wuta nga nakoma kosambela Wuta nga na koma mokristu Kimia na motema Bomoyi echangé, nakoma ko talela kaka Masiya Na kombo na Yesu, na tika misala ya mabé Na kombo na Yesu, nakoma moto ya kobanga masumu Na kombo na Yesu, kimia na motema, aah Wuta nga na tika masumu Wuta nga na kangama na Nzambé, eh Kimia na motema Na kolemba té, elikya na nga sé na Yesu muana Nzambé Na kombo na yesu milimo ya mbindo mi kokima Na kombo na Yesu, moto ya lola moko kita, ah Na kombo na yesu, kimia na motema, ah-ah Yesu kimia ya bana Nzambé Nkolo to tielaka motema, ooh yé to sanjolaka Liloba na nzambé, yé ndé apesaka bomoyi ya seko, oh Mokonzi ya eklezia, makasi na nga mowumbu na yé Lelondo na nga, apesa nga ngolu ya koyeba Nzambé Pé ko salela yé, oh Kimia na motema, aah Ningana, ningana, ningana, ningana Allez, pepa Yesu elonga na nga mosantu Likonzi ya bomoyi na nga, ah yé na koyembela Moyi ya bosembo, nionso asalaka yango n'esengeli Na kombo na Yesu, nakoma mosantu ya Nzambé Elombé ya bwania, maloba na yé ndé ebongi to yoka, ah Na kombo na Yesu, kimia na motema, ah-ah Sepela, sepela, sepela, sepela Allez, pepa, pepa Yesu nguya na nga mukristu Somi ya bokonzi na Nzambé, oh yé nako kumisa Lipa na bomoyi, andima ko kufa likolo na nga, ah Moninga malamu, nakoma evandelo na yé Lisolo ya motema, atondisa kembo ya Nzambé na bomoyi na nga Libanga motuya, ah Kimia na motema, aah Oh kimia na motema na nga, aah (kimia na motema, aah) Oh kimia na motema na nga, ah (kimia na motema, aah) Yesu nsomi ya lola, likonzi na moto (kimia na motema, aah) Engambé mobali, moninga malamu (kimia na motema, aah) Na kombo na Yesu na koma ya Nzambé, eh (kimia na motema, aah) Yesu apetola ngayi, nakoma ndé mosantu (kimia na motema, aah) Oh kimia na motema na nga (kimia na motema, aah) Oh kimia na motema na nga (kimia na motema, aah) Eeeeh Ata mokili etelemi, eboyi ko kendé ekomi na suka Nayebi Nkolo ozali ebombamelo na nga mosantu Po eté nionso ezali, ezalisami kaka na yo, eh Mokeli na kokamwa nionso esimbami na yo, oooh Nkolo, elonga na nga eza na yo, eh Yesu, na yo ndé na bengi Nzambé "Tata" Yo ndé mobateli ba mpaté ya Nzambé Yesu, na yo ndé na bengami "mosantu" Nkolo, lobiko ya bayé ba koganga Yesu, na yo ndé na bengami "mokitani ya Nzambé na bomoyi" Mosungi na nga azali kosala, na banga nini oh, ooh Azali kosala, na banga nini oh, ooh Ata makasi esili ngayi po eté nzela etondi minioko Nkolo y'okopesa nga loboko nga na simba, to kendé Mosala oy'obandi p'okomisaka kino na suka Mosungi na nga azali na nguya ya ko komisa nga, aah Nkolo, elonga na nga eza na yo, eh Yesu, na yo ndé na bengi Nzambé "Tata" Yo ndé mobateli ya ba mpaté ya Nzambé Yesu, na yo ndé na bengami "mosantu" Nkolo, lobiko ya bayé ba koganga Yesu, na yo ndé na bengami "mokitani ya Nzambé na bomoyi" Mosungi na nga azali kosala, na banga nini oh, ooh Azali kosala, na banga nini oh, ooh Yoka maloba oyo Nkolo atelemi ndé na nkembo Bikelamu binso bifukama Masiya na nga aza na bomoyi Ngayi na ningana tina nini Ata mabelé efungwami, bipayi na telemi na banga té, oh Oyo asimbi nga aza makasi Kombo na yé Yesu Christo Ata mokili eboyi ko ndima, oyo y'alobi ndé yango Eko salema pona nga, aah Mosungi na nga azali kosala, na banga nini oh, ooh Azali kosala, na banga nini oh, ooh Yoka lisusu maloba oyo Nkolo atelemi ndé na nkembo Bikelamu binso bifukama Masiya na nga aza na bomoyi Ngayi na ningana tina nini Ata mabelé efungwami, bipayi na telemi na banga té, oh Oyo asimbi nga aza makasi Kombo na yé Yesu Christo Ata mokili eboyi ko ndima, oyo y'alobi ndé yango Eko salema pona nga, aah Mosungi na nga azali kosala, na banga nini oh, ooh Azali kosala, na banga nini oh, ooh Ata makasi esili ngayi po eté nzela etondi minioko Nkolo y'okopesa nga loboko nga na simba, to kendé Mosala oy'obandi p'okomisaka kino na suka Mosungi na nga azali na nguya ya ko komisa nga, aah Nkolo, (Nkolo) elonga na nga eza na yo, eh (eza na yo, eeh) Yesu, na yo ndé na bengi Nzambé "Tata"(na bengi Nzambé "Tata na nga") Yo ndé (yo ndé, eeeh) mobateli ba mpaté ya Nzambé Yesu, na yo ndé na bengami "mosantu" Nkolo, (Nkolo, eh) lobiko ya bayé ba koganga (ah-ah-ah) Yesu, na yo ndé na bengami "mokitani ya Nzambé na bomoyi" (eeeh) Mosungi na nga azali kosala, na banga nini oh, ooh Azali kosala, na banga nini oh, ooh Mosungi na nga azali kosala na banga nini, oooh (Mosungi na nga azali kosala, na banga nini oh, ooh) Ata mokili ekomi pasi na lenga nini, oooh (Azali ko sala na banga nini oh, oooh) Ata ba nguna bakoti mboka ngayi nako lenga té, eeh (Mosungi na nga azali kosala, na banga nini oh, ooh) Ata na nzela ya referendum, mbok'oyo eko binga, eeh (Azali ko sala na banga nini oh, oooh) Eh mosungi ya Congo aza na bomoyi, kimia na mboka oyo (Mosungi na nga azali kosala, na banga nini oh, ooh) Eh lé-lé (bina nanu) eh lé-lé Eh lé-lé (allez, bina) eh lé-lé Eh lé-lé, eh lé-lé Eh lé-lé, eh lé-lé Allez pepa, pepa Allez pepa, pepa Pepa, pepa Allez pepa Mololo, mololo, mololo, mololo, oooh Alleluia Yesu aza malamu Yesu aza na bomoyi Mokonzi ya mboka Congo azo sala Lobi eza "oui" ou "non" Biso misu na nani? (na Yesu, eeeh) Posa ya Yesu ndé ezo kokisama Betela Yesu maboko
Writer(s): Inconnu Compositeur Auteur, Katoto Luhembe Antoine Lyrics powered by www.musixmatch.com
instagramSharePathic_arrow_out