Tekst Utworu

Yaka yaka baninga boyoka nsango'a malamu boye, Lel'oyo nabaloli mpo nasukoli motema na ngai, Mpo nayebi bokonzi ya Nzambe ekomi pene e. Mboka mboka pusana pembeni na Yahvé, bato bato bafukamela ye e, Pamba te kanda ya Nzambe esi ekomi pene e. Esengo esengo na ba oyo bakima basumuki i, Esengo esengo na ba oyo bakima Satana. Mpo Nzambe azali na bango pembeni kino liwa a. Ngombe ngombe kutu ayebaka nkolo na ye, Mpunda mpunda kutu abosanaka ata elelo na ye te, Kasi po na nini biso bat'oa mokili tobosanaka Nzambe boye e. Esengo esengo na ba oyo bakima basumuki i, Esengo esengo na ba oyo bakima Satana. Mpo Nzambe azali na bango pembeni kino liwa. Mboka mboka pusana pembeni na Yahvé, Bato bato bafukamela bakumbamelaka ye e, Pamba te kanda ya Nzambe esi ekomi pene. Baninga tosambela, mokili esi ebebi, tomipesa na Nzambe, Tobongola mitema e, Akoya lelo te lobi tee, biso'milengela, oo ye e ye e Bongisa nzela nionso, tokata zamba nionso. Fongola mitema, Kende koyamba Nzambe oyo Tata na yo apusa kolingaka kolota te. Yahvé, Pesa biso nguya tokweya na masenginya te. Pesa biso makasi, Tokweya na milimo ya Dzabolo te, Oyo motema mabe apusa kolinga biso tobunga nzela e. Bomba batela na motema nayo mibeko ya Moïse, Kolinga te ozwa ba nzambe misusu liboso ya Yahvé. Epayi mokili ebanda pe kosuka, biso toyebi te o. Epayi mokili ebanda pe kosuka, Bis'omitunaka ee, oo Lazari e, akweyi na Nibe. A tata, nzil'a zulu, nzil'avelele Oo Lazari e, akweyi na Nibe. A mama, nzil'a zulu, nzil'avelele Oo Lazari e, akweyi na Nibe Ticket na ngai, makila ya Yezu nakozanga te o OO Lazari ee e OO Lazari e, akweyi na Nibe OO Lazari ee e Ticket na ngai makila ma Yezu na kokonda ve o OO Lazari e, akweyi na Nibe OO Lazari ee e, Didier Ah mama, nzil'a zulu, nzil'a velele OO Lazari e, akweyi na Nibe OO Lazari ee e Didier
Writer(s): King Kester Emeneya Lyrics powered by www.musixmatch.com
instagramSharePathic_arrow_out