Lyrics

Na memi bagage n'aeroport ya ba desirs na yo Nayé po na régulariser document ya séjour na ngai Na ba pensées na yo, y'o refouler na yo nga Na komi ko vivre clandestinement na mboka ya souci eeh Soki Jésus atikela Saint Pierre fungola ya eglésia Atikela ye comme mission koluka ko gagner âme ya Irène Po a s'assurer mokolo akofufa ako kende directement na paradis Po beauté na yé eko servir Nzambe pona ko emberlificoter salle de bain n'e ya jacuzzi Moyi kutu ekoma ko célébrer période oyo etikalaka kidiba Tango amonaka Irène azo leka pour la première fois na Queens, na boulevard, na New-York Yango ba occidentaux ba surnomma periode yango été Moyi ekoma ko kota souvent na retard avec l'espoir Que Irène Mokabila akoleka pour la deuxième fois Elasticité ya Irène na nga soki vraiment aza ko déhancher Lokola Nzambe asala yé na formule ya mastique ya chewing gum Botuna ba poissons ya lac Albert ndéngé baningisaka lopélé Modèle na bando eza Irène Mokabila, nazo kosa té Nalanda na nga pé ideologie ya Pape Jean Paul 2 Pourquoi quand on est fidèle, il faut se préserver, Irène Mokabila? Nga Jeune Pato, nzoto na nga ezalaka na tatouage secret Preuve eza intervention ya motéma na yo Awa oza té, nga nazangi partenaire Yak'o prêter nga main forte po nazala soulagée nga moto na yo eeh Etikali lisusu nini? (Na douane na dedouanaki) Sentiment na nga aah (vignette pe na sombaki) Po na bolingo n'o (na Sonas na s'assuraki) Olobaki na nga na 4 ya bolingo na yo Soki na tiesi (Immatriculation 007) Y'oko fungolela nga (barrière po na nga na kota) Tshibo Apula Mike Mosisi Eh ngai grand Mopao (Mopao petit frère ya Yésu) Napesi yo l'amour (ozongiseli n'o nga bolingo té) Obalukeli n'o nga Nakozikisa nzungu na yo ya bilengi po na krokota 'ngo eh (Nakokata té, manzaka na nga na coupe-ongle po na krokota bien) Eh bana vernis, tchou (pona krokota bien) Nakolisa manzaka ekoma neti comme un lion (pona krokota bien) Lime ezala mosika na nga, au nom de l'amour (po na krokota bien) Bikrokoto ya loso na mafuta mbila elengi moko na Irène Na krokotaka yango té na lutu, sé na manzaka ya misapi na nga Longola sparadrap nasopel'o alcool na pota oyo ezo kawuka té bongo olela aïe aïe Point mort na nga ezalaka soki otié misapi n'o matoyi na nga Nakokita, ko tourner neti 207 ebeti tonneau le long ya descente ya Kisenso Chérie aboya dindon na sachet po ekosila n'ango moto, faute na nga té Tatu, tatu, tatu ndombela luse Tatu eh, tatu mukadji ndombela, ndombela luse Aza mosuni ya mutambu oyo ekufela mpuku Ata kutu grand prêtre niawu alingelaka yé boule Aza elengi na kofiba, mosapi ya bébé na bouche (Irène) Aza plaisir ya mukusa ya liyanzi, elengi sukakaka okwanza Champ-Élysée engangaka na mwinda Irène aza mwinda engengisaka oya nga bolingo (Mokabila) Ata na siliki soki asimbi na motulu Mitshopo elinganaka, ba poils nzoto pé etelemaka Lisasi ekoti na chambre, etikali kaka na tirer tah Moto alingi nzété na yé, amata yango ata mbula enoki, surtout nga Nalingaka bongo po na sielumakaka Epesaka vacum, epesaka kolongonu na bolingo, na love Eh nga Rambo eeh Eeh nga Antoine eh Botala ndéngé chérie na nga akomi opesa nga mokongo Botala ndéngé mwana mama akomi otika nga kidiba Chérie na nga vraiment akomi'o changer na yé comportement, ah nga na leli Somba masanga ya mbila tomela, tolangwa masanga mbila Sombela nga masanga ya mbila na nzela ya Kinkole na Mikonga Noko azalaki soki aké nzela Bandundu akobosana té kosombela nga sac ya bikendi Chérie yo mpé soki oké wenzé, kobosana té osombela nga bonbon Kojack eh Nga mpé nasombela yo boudin oyo ezalaka na pili-pili eleka Chérie bongo otia "tss-aah, tss-aah" Biso nionso tosala "sss,-aah, sss-aah" Who's bad, who's bad, who's bad, who's bad, ah? Nakozikisa nzungu na yo ya bilengi po na krokota 'ngo eh (Nakokata té, manzaka na nga na coupe-ongle po na krokota bien) Eh bana vernis, tchou (pona krokota bien) Natika manzaka ekoma neti comme un lion (pona krokota bien) Lime ezala mosika na nga, au nom de Jésus-Christ (po na krokota bien) Ntsunga'a sauce lové ezalaki'omelisa soyi Lelo ebeli, ekomi goût, moto mosusu akomi'o gouter Nzété oloni té, obuki mbuma, olié na sentiment Nzambe, est-ce que ozo mona té, to o permettre ezala bongo? Na beleli y'osala eeh Molayi ya bolingo na nga, Kilimandjaro ndé ekokani n'ango Oyo ekomi kuluna ya Sarajevo ekomeli nga Na balaka té woh-woh-woh, na balaka té woh-woh-woh Na balaka ndé ba problèmes Na balaka té woh-woh-woh, na balaka té woh-woh-woh Na balaka ba complications Bébé ya 3 jours opesi yé comprimé au lieu de sirop Nazoki pourtant nzela'ngo bapekisaki ngai eeh Pinzoli ya Chantal Loemba, amour n'o eboyi ko essuyer Ba bienfaits na nga tout, nzoka ezalaki inutile Eeeh Jeune Pato Petit ya Chelsea asopa boule Eeeh Jeune Pato Irène vraiment oteki boule Tatu, tatu, tatu ndombela luse Tatu eh, tatu mukadji ndombela, ndombela luse Aza mosuni ya mutambu oyo ekufela mpuku Ata kutu grand prêtre niawu alingelaka yé boule Eeeh Jeune Pato Petit ya Chelsea asopa boule Eeh Chantal Loemba Super star asopa boule Eeeh Jeune Pato - Sopa boule
Writer(s): Koffi Olomide Lyrics powered by www.musixmatch.com
instagramSharePathic_arrow_out