Lyrics

Ba mama eh bo kéba B'assistant sociale oyo bo landaka Bango mutu ba'o ko lukela biso ba divorce Tozala mayele Olobaka na nga tokoki ko biyena té Na ebandeli ya bolingo na biso Tozalaka lokola bana mapasa bipayi binso toko zala ngaï na yo Lelo indifference pe na bolingo Nayebi tina té bébé té boyé té Ey bébé eh okomi ko kamwisa ndengé yo o changer Ah maman ah soucis na motéma ekoli ko tonga ndako Ndako'a Ninlinda nako koka té Ndako'a Ninlinda toyokanaka boyé té Ndako'a Ninlinda nako koka té Ndako'a Ninlinda toyokanaka boyé té Ezalai soki na zongi na ndako Olongolaka nga chemisi na sapato Oko pangusa nga motoki na elongi Nakomaki lokola mwana na mabélé ya maman nayé Ey bébé eh tala bato na nkomba bazali ko tala biso Olingi o sala elokomoko ezalaka té Kéba oko bebisa lokumu ya foyer Ah mama kende na ndako ya Nzambé tubela masumu Nzambé a limbisa yo manso yo osali ngaï Mokili oyo ezali ya biso té Ey bébé eh tala bato na nkomba bazali ko tala biso Olingi o sala elokomoko ezalaka té Kéba oko bebisa lokumu ya foyer Ah mama kende na ndako ya Nzambé tubela masumu Nzambé a limbisa yo manso yo osali ngaï Mokili oyo ezali ya biso té Mabé nionso osali ngaï vraiment na mboka mosika Soki ezalaki pembeni mbelin malamu Nayebisa ba boti ba yo po bayeba Ndengé oko niokolo ngaï boyé té Ah bébé mokolo motéma azo lela mwana madame Nako koka té oh (ako kola nayé ko souffrir té) Oh mama (ah yo-yo-yo) Ozalaki ko tambola na Kinsasa na musuni'a bata Lelo okomeli nga monoko bébé oh Obosani k'ozalaki na masébé oh bébé oh Tala ndengè okomi ko sakana na ngaï Vraiment okamwisaka ngaï Lelô okomi na mbongo okomi ko tiela nga munoko Obosani nionso na sala na vie nayo bébé Tala ndenge poto ebongolaka basi ngo na ndeko Mabé nionso osali ngaï vraiment na mboka mosika Soki ezalaki pembeni mbelin malamu Nayebisa ba boti ba yo po bayeba Ndengé oko niokolo ngaï boyé té Ah bébé mokolo motéma azo lela mwana madame Nako koka té oh (ako kola nayé ko souffrir té) Na bêta yo mbata (ah yo-yo-yo) Na bengisaki na poto mbala misato Mbala misato yango ba refulaka yo bébé oh Oyo ya minéï ba kitisi yo na avion Malawi Okomaki mwana mawe oh bébé Na sali nionso nayé ko zua yo Na tiaki yo na kindunga ah bébé oh Lelô oye ko bengana nga na ndaku satana Ba tracéle nga 500 mètre na policier Mabé nionso osali ngaï vraiment na mboka mosika Soki ezalaki pembeni mbelin malamu Nayebisa ba boti ba yo po bayeba Ndengé oko niokolo ngaï boyé té Ah bébé mokolo motéma azo lela mwana madame Nako koka té oh (ako kola nayé ko souffrir té) Mama eh (ah yo-yo-yo) Likambo té boma nayo libala eh Oboyi ngaï pona mbongo ya café oh O préfère otikala femme seule Okolaka nionso na nzoto nayo Impo kutu ofutaka zéro zéro Ozua mokanda sima ya bana to bota Nakoma ko lala na libulu ya métro Na poche na nga pepsodent na brosse Mabé nionso osali ngaï vraiment na mboka mosika Soki ezalaki pembeni mbelin malamu Nayebisa ba boti ba yo po bayeba Ndengé oko niokolo ngaï boyé té Ah bébé mokolo motéma azo lela mwana madame Nako koka té oh (ako kola nayé ko souffrir té) Oh mama (ah yo-yo-yo) Histoire vraie
Writer(s): Madilu System Lyrics powered by www.musixmatch.com
instagramSharePathic_arrow_out