album cover
MONDELE
869
Christian & Gospel
MONDELE was released on June 27, 2019 by KIN-EXPRESS Productions / Antoine KATOTO LUHEMBE as a part of the album KOTIKA NGAI TE
album cover
Release DateJune 27, 2019
LabelKIN-EXPRESS Productions / Antoine KATOTO LUHEMBE
Melodicness
Acousticness
Valence
Danceability
Energy
BPM55

Music Video

Music Video

Credits

PERFORMING ARTISTS
Jose Nzita
Jose Nzita
Performer
COMPOSITION & LYRICS
Jose Nzita
Jose Nzita
Songwriter

Lyrics

1
Yesu na nga oyaka bayebisi ngai oza mondele
Kasi nga nayebi yo nde okufelaki ngai
Yesu na nga oyoka bayebisi nga oza mondele
Kasi nga nayebi yo nde okufelaki
Ngai 2x
2
Bato batuni nga mpo na nini nayembelaka yo
Bayebisi nga ozali mondele
Balobi kaka mpo na bayuda mpo na ngai te
Esengeli nga naluka Nzambe na nga ya bamwindo
Balobi kaka mpo na ba juifs mpo na ngai te
Esengeli nga naluka Nzambe na nga ya Afrika
Natali na bible namoni oza na makila ya mindele te
Makila na yo mpe ya bamwindo te oza na makila ya lobiko
3
Banzambe nyoso batalisi ngai na se na mabele oyo
Moko te akufa mpe asekwa lokola Yesu
Bango nyoso balala na kunda bapola
Bazali kozela kozonga na ye Yesu
Molimo na nga esepela opona Nzambe ya solo
Oyo bato nyoso bakozela ya solo penza aza Nzambe
4
Kobotama na ye bikamwa eee
Kokufa na ye mpe bikamwa Yesu eee
Abotama na lisanga ya mwasi na mobali te
Abotamaki na ye moko ooo
Azali lokola libanga oyo Daniel amonaka
Euti na likolo na loboko ya moto te
Yango nde loyembo na ngai
Molimo na nga esepela opona Nzambe ya solo
Oyo bato nyoso bakozela ya solo penza aza Nzambe
5
Mwasi na Samalia ayebisaki Yesu
Biso tokumamelaka na ngomba
Bino bolobi na Yelusaleme
Kasi bakoko na biso bakumisaki Nzambe yango oyo eeaa
Yesu azongiseli ye ezali lisusu na ngomba te
Na Yelusaleme mpe te lelo ekomi ya molimo
Ezali lisusu bayuda ya mposo te bamindele te bakomona Yesu 2x
Lelo ekomi ya molimo na moto nyoso akondima Yesu 2x
6
Mposo mwindo mpe te ee
Ya mindele mpe te oo
Lelo ekomi bayuda na kati
Ba oyo bayambi Yesu mokolo Nkolo mpe Mokonzi
Bango nde bakokota kuna
Ezali lisusu bayuda ya mposo te bamindele te kaka bakomona Yesu lelo oo
Written by: Jose Nzita
instagramSharePathic_arrow_out􀆄 copy􀐅􀋲

Loading...