album cover
Paradoxe
5,823
World
Paradoxe was released on August 18, 1998 by makengoprod - RIGO MAKENGO PRODUCTIONS as a part of the album À LA UNE (Nouvelle Ecriture)
album cover
Release DateAugust 18, 1998
Labelmakengoprod - RIGO MAKENGO PRODUCTIONS
LanguageFrench
Melodicness
Acousticness
Valence
Danceability
Energy
BPM117

Credits

PERFORMING ARTISTS
Papa Wemba
Papa Wemba
Performer
Tosha Fulakanda
Tosha Fulakanda
Performer
COMPOSITION & LYRICS
Tosha Fulakanda
Tosha Fulakanda
Songwriter

Lyrics

Le PDG Tario Mulongo
Nalobi eh Mbonge ezindisaka mbisi te, po ebale eza mboka na ye
Nga namoni bolingo eza susu nga te oh, tala ekomi kozindisa ngai
Nalati mawa mingi eh, tala kutu ekomi konzuluka
Nalela yo na monoko nini Tario oh Mulongo
Awa bolingo na yo ekomi okima nga
Nazela yango na motema polele
Molili ya miso ya ko kangama ezalaka na somo te
Kasi ya miso polele, etonda somo
Nalela yo na monoko nini Tario oh Mulongo
Awa bolingo na yo ekomi okima nga
Nazela yango na motema polele
Plus précieux que le diamant, il y a que toi
Roger Precioso
Lakisa nga bolingo tango mino eza na monoko
Kozela te ba rides esala nga na elongi
Sima oya, tolingana ekozala trop tard
Age pe epusani
Didier Mpeti, le Sultan de Namur
Yawe eloko nionso etambolaka, osalela yango nzela
Kasi tango pe etambolaka, namona naino nzela na yango te
Lakisa ngai, totambolaka ata na Tario, bras dessus, dessous
Mbula zomi Tario tovandi nayo libala oh
Naino namona ve mbanda na miso mia nga
Ata sango ya pamba naino nayoka te
Y'ozali mobali oyo Yawe aponela ngai eh
Y'okomi kosonga na yo miso eh
Nzoka y'obimi na mususu Tario
Mwini pe eza kokoka n'ango nga lisusu te
Motoki ya makila oyo ngai nakomi kobimaka, lokola Yesu Masiya eh
Elakisi ebandeli ya pasi na ngai eh
Pe suka ya esengo na nga
Yo moko obengaki nga mwasi ya la vie na yo
Pe lisusu, o prometaki nga tokokabwana te
Mulongo ya baleki
Nasi nazui visa ya mboka ya baweyi
Kala te nakokota na lilita
Bongo yo omema ngambo, Mulo Nespa Mula
Mbetseke ekomi pene na nga
Ekomi na quinze kilomètres aye
Ah nga batongeli ngai immeuble na se ya mabele
Pona nga route ya Matadi ekomi na sens unique
Nakutani na Ma Nyondo, atuni nga pona nini na ye
Mbetseke ekomi pene na nga (Oh aye aye eh)
Ekomi na quinze kilomètres aye (Mawa)
Ah nga batongeli ngai immeuble na se ya mabele (Mawa)
Pona nga route ya Matadi ekomi na sens unique
Nasi nazui visa ya mboka ya baweyi
Nasi nazui visa ya mboka malita
Kala te nakokota na lilita
Bongo y'omema ngambo, Ludo Mulongo
Bongo y'omema ngambo, Hyppo Makaya
Bongo y'okumba Depas Kanza
Jr Bongela, Emily Kinkela, Fioti Kuidika aah woh-woh
Mbetseke ekomi pene na nga (Ekomi pene na nga)
Ekomi na quinze kilomètres aye (Na quinze kilomètres oh)
Ah nga batongeli ngai immeuble na se ya mabele (Mawa)
Pona nga route ya Matadi ekomi na sens unique (Aye, eh, mawa)
Mbetseke ekomi pene na nga (Ekomi pene na nga)
Ekomi na quinze kilomètres aye (Namoni Vadio Mambenga)
Ah nga batongeli ngai immeuble na se ya mabele
Pona nga route ya Matadi ekomi na sens unique
Written by: Tosha Fulakanda
instagramSharePathic_arrow_out􀆄 copy􀐅􀋲

Loading...