Lyrics

Sekele ya motema Sekele ya motema Sekele ya motema Yanga na Nzambe nanga Sekele ya motema Aaah ya motema Sekele ya motema Nzambe na bana na Ye Nzambe alobaki na elanga n'Edeni Oh Adama boliya mbuma te Kasi Ewa aboyaki kotosa Alobelaki nyoka, nyoka apengwisaki ye Sekele ya motema Sekele ya motema Sekele ya motema Yanga na Nzambe nanga Sekele ya motema Aaah ya motema Sekele ya motema Nzambe na bana na Ye Nzambe alobaki na Elombe Samsona Okokata te suki na yo ya moto Na posa ya nzoto alobelaki Delila Yango Delila abomisaki ye Sekele ya motema Sekele ya motema Sekele ya motema Yanga na Nzambe nanga Sekele ya motema Aaah ya motema Sekele ya motema Nzambe na bana na Ye Na tango oyo moyini azali konguluma E akweyisa bana nionso ya Nzambe Nkake sambo yango ezali pe konguluma Kotalisa miango na ye ya mabe Ya mbala oyo Ewa akokweya te Oyo ekokoma tango esi eleka Sekele ya motema Sekele ya motema Sekele ya motema Yanga na Nzambe nanga Sekele ya motema Aaah ya motema Sekele ya motema Nzambe na bana na Ye Mikolo nionso ngai na etumbelo Nakolelaka ngolu ya Tata na ngai Mbula to moyi ngai na losambo Nakosengaka ete abongola nga Ekobima ngai kati na hema Mokili ekokamwa komona lolenge na ngai Moto na bolembu moto na masumu Moto na botawu ye abongoli ngai Sekele ya motema Sekele ya motema Sekele ya motema Yanga na Nzambe nanga Sekele ya motema Aaah ya motema Sekele ya motema Nzambe na bana na Ye Bosana te mwana, bilako na nzambe Bomba yango na motema na yo Landaka mayele ya baye banso Batambolaki liboso na yo Talaka Rahab abikisamaki Alandaki sekele ya bana Israël Talaka Ruth abikisamaki Alandaki Nzambe ya bana Israël Mwasi na kanana abikisamaki Alandaki Nzambe ya bana Israël Sekele ya motema Sekele ya motema Sekele ya motema Yanga na Nzambe nanga Sekele ya motema Aaah ya motema Sekele ya motema Nzambe na bana na Ye Sekele ya motema Sekele ya motema Sekele ya motema Yanga na Nzambe nanga Sekele ya motema Aaah ya motema Sekele ya motema Nzambe na bana na Ye Yesu yo mwana moke olongi liwa (Elombe na etumba) Yesu yo mwana moke olongi satana (Elombe na etumba) Tala ye mwana moke alongi liwa (Elombe na etumba) Sekele na ye azali nde Nzambe na motema Sekele na ye azali nde Nzambe na motema Moïse yo mobange olongi Egypte na etumba Moïse yo mobange olongi Egypte na etumba Sekele na yo ezalaki Nzambe na motema Sekele na yo ezalaki Nzambe na motema Dawidi mwana moke abeti Goliate na etumba Dawidi mwana moke abomi Goliate na etumba Tala Dawidi mwana moke abeti Goliate Sekele na ye ezalaki Nzambe na motema Abraham yo mobange oboti Izaki Sara yo mobange oboti Izaki Sekele na bino ezalaki Nzambe na motema Sekele na bino ezalaki Nzambe na motema (Ah bilombe na etumba Ah bilombe na kondima) Yesu yo mwana moke olongi liwa Yesu yo mwana moke olongi liwa Tala ye mwana moke alongi satana Sekele na ye ezali nde Nzambe na motema Sekele na ye ezali nde Nzambe na motema Biso pe bana nayo tolongi ba pasi Biso pe bana na yo tolongi mokili Biso pe bana na yo tolongi satana Sekele na biso ezali nde Nzambe na motema Sekele na biso ezali nde Nzambe na motema Bino ba frère na nga bo longi Satana ndenge nini Bina bana mike bo longi ba pasi Bino bana mike bo longi ekobo Sekele na bino ezali nde Nzambe na motema Sekele na biso ezali nde Nzambe na motema Bino ba soeur na nga bo longi mokili ndenge nini Bina bana mike bo longi ba satana Bino bana mike bo longi ba épreuves Sekele na bino ezali nde Nzambe na motema Sekele na biso ezali nde Nzambe na motema (Bilombe na etumba Bilombe na kondima)
Writer(s): David Fataki Lyrics powered by www.musixmatch.com
instagramSharePathic_arrow_out