album cover
Yesu
album cover
Yesu was released on April 5, 2026 by Moise Ilunga as a part of the album TOUT EST GRACE
April 5, 2026
LabelMoise Ilunga
BPM136
Melodicness
Acousticness
Valence
Danceability
Energy

Lyrics

Yesu, Yo Nzambe na seko
Ofandi bisika likolo
Ondimama pona misala na Yo
Toyembaka Yo na tina
Yesu, liloba na bomoyi
Bikelamu, nionso etosaka te
Ba mbonge, mipepe, egumbamelaka Yo
Toyembaka Yo na tina
N'esika na Yo, tokotia nani
Ya malonga, tozwa lisusu wapi
Ebandaki Yo, ekosilisa
Elakaki Yo, ekokokisa Yesu
Ondimama pona misala na Yo
Toyembaka Yo na tina
Yesu, kati ya ebele
Oyebaka, mongongo na ngayi
Okoma kombo na ngayi na loboko nayo
Toyembaka Yo na tina
Yesu, Yo Nzambe na nguya
Osalaka, tango bato balembi
Okomaka, bisika bato basuki
Toyembaka Yo na tina
Written by: David Ize
instagramSharePathic_arrow_out􀆄 copy􀐅􀋲

Loading...