album cover
Malanda-Ngombe
8,177
African
Malanda-Ngombe was released on January 1, 1991 by KP&P - Sonodisc as a part of the album Attentat (Nkolo Lupemba) [L'intégrale]
album cover
Release DateJanuary 1, 1991
LabelKP&P - Sonodisc
Melodicness
Acousticness
Valence
Danceability
Energy
BPM58

Credits

PERFORMING ARTISTS
Koffi Olomidé
Koffi Olomidé
Performer
COMPOSITION & LYRICS
Koffi Olomidé
Koffi Olomidé
Composer

Lyrics

Koyoka eleki koloba, moninga na yo ngai te
Monguna na yo pe ngai te, luka ya se ya yo
Monguna na yo se yo meyi
Masumu na yo futa
Lazare abanzaka te lokola Mwana Nzambe asekwisaka ye
Akokufa te lisusu, amikosaki, Gunter monsieur le maire, yaka na nzoku
Mawa trahison na yo po y'ozanga lupemba
Mawa jalousie na yo po y'ozanga marque
Pitié Chama Zoulou po y'ozanga référence
Okobonga jamais po motema n'o mabe
Na wenze ozalaki na mesa kasi souviens-toi Zoulou
Marchandise ezalaki ya nga, otekaki ozuaki intérêt ebele
Qui veut la paix prépare la guerre
Mawa trahison na yo po y'ozanga lupemba
Mawa jalousie na yo po y'ozanga marque
Pitié Chama Zoulou po y'ozanga référence
Okobonga jamais po motema n'o mabe
Na wenze ozalaki na mesa kasi souviens-toi Zoulou
Marchandise ezalaki ya nga, otekaki ozuaki intérêt ebele
Wo oh nini na mwana ya ngani eh, papa Didi Stone
Ebale tengama libela po eboyaka koyoka toli ya masuwa
Tala okomi mobange oyo alekela l'heure eh
Y'obetaka tango ya partout que yo yo yo yo ah
Y'okomi okima mbangu na mopepe pourquoi?
Monene eloko apema eza zéro devant moke ya finite
Apprenti sorcier ye
Tigre ya papier
Akram Oge sunga Mamale
Biso toza na yo kino suka te oh
Nzete ya mbila, ba'okata e'okola, ba'okata e'okola
Mawa trahison na yo po y'ozanga lupemba
Mawa jalousie na yo po y'ozanga marque
Pitié Chama Zoulou po y'ozanga référence
Okobonga jamais po motema n'o mabe
Na wenze ozalaki na mesa kasi souviens-toi Zoulou
Marchandise ezalaki ya nga, otekaki ozuaki intérêt ebele
Mama ye totika nda bizaleli ya kala mama
Moto alobi n'o "Allo", zongisa ye "Oui"
Moto apesi yo "Bonjour", zongisa ye pe "Bonjour"
Moto apesi yo gentil, komon'e yuma te
Moto akabeli yo kobeng'e mushina te
Suspense, Teka Diamona, Narcisse Beyoko oh
Jalousie ebanda na ebandeli ya mokili
Nzambe akela mokili na bolingo na ye
Tala Kaina aboma ndeko na ye likolo ya jalousie
Yango Zoulou okoboma nga lelo oyo
Sala oyo Nzambe alingi mobo mitano yo yo yo
Awa obaloli kazaka po oyebi sort na yo
Libulu molayi moyen ya kokima eza te
Le grand Mopao eza nga, fongola livre na yo ya histoire
Oko se rappeler moto asala que y'ozala eza nga
Etumbu na yo na la vie okozalaka seko sima na nga
Malanda Ngombe
Boni yo butu moyi se kosengela nga liwa epayi ya Nzambe
Mais Nzambe nde seule protection na nga, botika nga na vivre
Na vie na nga pourquoi esalaka yo mi ngai eh
Bozui na nga epesaka yo likundu motema mabe
Amissu Madoua
Lisumu nini nasala moto mosusu asala jamais avant ngai eh
Rocky na Elvis botuna nga na buku ya leta
Didi Stone Naïke tia papa na mabondeli na yo
Eloko eleki losambo ezali te
Aa Mado Mbala, mawa mama Amy eh
Robert Ngobila, Jean-Claude Kimbembi
Mawa trahison na yo po y'ozanga lupemba
Mawa jalousie na yo po y'ozanga marque
Pitié Chama Zoulou po y'ozanga référence
Okobonga jamais po motema n'o mabe
Na wenze ozalaki na mesa kasi souviens-toi Zoulou
Marchandise ezalaki ya nga, otekaki ozuaki intérêt ebele
Avant que otia nga mbeli pesa nga poussière deux secondes
Po natika testament na Elvis pe na Didi
Nga nakokufa bopesa nga ata mwa du temps
Po nafuta niongo ya ba diva pe ya mama Amy
Po natika maloba na Minou na yaya na ye
Bino nzoto ya bien, ya nga nzoto ya maba eh
Nabimaka te na moyi po nga ba sorties se ya après-midi
Mawa trahison na yo po y'ozanga lupemba
Mawa jalousie na yo po y'ozanga marque
Pitié Chama Zoulou po y'ozanga référence
Okobonga jamais po motema n'o mabe
Na wenze ozalaki na mesa kasi souviens-toi Zoulou
Marchandise ezalaki ya nga, otekaki ozuaki intérêt ebele
Tant pis pour les jaloux
Written by: Koffi Olomidé
instagramSharePathic_arrow_out􀆄 copy􀐅􀋲

Loading...