album cover
Na Tembe Te
263
Christian & Gospel
Na Tembe Te was released on May 12, 2015 by K2A Music as a part of the album Scusa
album cover
AlbumScusa
Release DateMay 12, 2015
LabelK2A Music
LanguageFrench
Melodicness
Acousticness
Valence
Danceability
Energy
BPM180

Credits

PERFORMING ARTISTS
L'or Mbongo Lemba
L'or Mbongo Lemba
Performer
COMPOSITION & LYRICS
L'or Mbongo Lemba
L'or Mbongo Lemba
Composer

Lyrics

Eh Goliath asambwé liboso ya Nzambé ya Izayela
Atiaki tembé liboso ya Nzambé ya Dawidi, libanga moko
Eeeh, Goliath elombé ya ba Philistiya akweyi na sé
Tala lolendo ya Falo esuki liboso Nzambé na Mossé epesi soni oh, na mbok'Egypto
Eh-yé, eeh (eeeh)
Eh-yé, eeh (eeeh)
Eh-yé, eeh (eeeh)
Na beta tembé té
Oza mokonzi omikitisaki tina na esika ya bato ya pamba, eh
Nionso po y'osikola biso lelo oyo
Osombi biso na makila nayo
Eh-yé, eeh (eeeh)
Eh-yé, eeh (eeeh)
Eh-yé, eeh (eeeh)
Oh, oyaki na sé lokola mua mpaté, eeh
Ba moneli yo ba baki yo ekulusu
Nzoka ndé yango nzela ya lobiko, obikisaki mokili mobimba
P'oyaki na sé lokola mua mpaté, eeh
Ba moneli yo, ba baki ekulusu
Nzoka ndé yango nzela ya lobiko (nzela ya lobiko)
Obikisaki mokili mobimba
Yango na tiya tembé té (na beta tembé té)
Nga oooh, na tia tembé té (na beta tembé té)
Ya solo Naaman asukolamaki (na beta tembé té)
Oh na na maba, oh na mababé (ozali Nzambé, Nzambé na elonga)
Ekweyisa ndeko na Biblia (na beta tembé té)
Eeh bato nionso bayebi, oooh (na beta tembé té)
Tatiya akimi na zamba boyé ndengé nini'ango (na beta tembé té)
Eh yé-yé, Yesu ooooh (ozali Nzambé)
Ozali Nzambé (Nzambé na elonga)
Eh Aman mbamba aboyi ko tika koluka ko boma Mardochée moyuda
Nzoka ndé Nzambé ya ba Yuda elombé
Atelemaki oh, akati ndé makambo
Ba tiaki tembé, ba ngumbamela yo
Na tango ya pasi, ekomela bango
Moto moko té po abikisa bango
Otelamaki opesa lobiko
Yango na tiya tembé té (na beta tembé té)
Nga oooh, na beta tembé (na beta tembé té)
Na beta tembé té na Nzambé ya Congo oyo (na beta tembé té)
Oh-yo-yo-yo (ozali Nzambé)
Oh-yo-yo-yo (Nzambé na elonga)
Nzambé na ngayi na betela yo tembé té (na beta tembé té)
Nzambé na ngayi na betela yo tembé té (na beta tembé té)
Akimi iyoh-iyoh (na beta tembé té)
Iyoh, ooooh (ozali Nzambé, Nzambé na elonga)
Na tina nini na zala na tembé
Po nionso osala emonani miso
Wuta na yamba yo na bomoyi na nga
O pambola ngayi, opesa nga nguya
Na tina nini na zala na tembé
Po nionso osala emonani miso
Wuta na yamba yo na bomoyi na nga
O pambola ngayi, opesa nga nguya
Eh-yé, eeh (eeeh)
Eh-yé, eeh (eeeh)
Eh-yé, eeh (eeeh)
Eh-yé, eeh (eeeh)
Eh-yé, eeh (eeeh)
Eh-yé, eeh (eeeh)
Nzela mosusu ezali té na sé
Oyo ememeka epayi na Nzambé
Moto moko té, eeh akoki ko mema, aah
Soki na yo té, nzela na lobiko
Oza mokonzi omikitisaki ti na esika ya bato na pamba
Nionso po y'osikola biso lelo, osombi biso na makila na yo
Oyaki na sé lokola mua mpaté, ba moneli yo, ba baki ekulusu
Nzoka ndé yango nzela na lobiko
Obikisaki mokili mobimba (oyo eko mema mokili epayi na yo)
(Na beta tembé té) na beta tembé pona nini'ango, oh
(Na beta tembé té) Nzambé ya boyé na betela yé tembé ndenge nini'ango
(Na beta tembé té) makambo asali emonani
(Ozali Nzambé, Nzambé na elonga) eh
Ngayi na ndima, ngayi na ndima (na beta tembé té)
Eté osali ya mingi (na beta tembé té)
Na wangana naloba nini, oh (na beta tembé té)
Yesu, yo ndé lisolo ya vie na nga (ozali Nzambé, Nzambé na elonga)
Oh mokili nionso eyebi (na beta tembé té)
Papa na nga ezalaka sé yo Yesu, oh (na beta tembé té)
Oooh okoma noko na ngayi (na beta tembé té)
Okoma nionso oyo moto abetelaka tolo (ozali Nzambé, Nzambé na elonga)
Eeh nionso na ngayi sé yo (na beta tembé té)
Ooh, pona yo na lamuka na butu oh (na beta tembé té)
Ooh Yesu, yo malamu (na beta tembé té)
Na ko beta tembé té (ozali Nzambé)
Oyo, ooh (Nzambé na elonga)
Written by: L'or Mbongo Lemba
instagramSharePathic_arrow_out􀆄 copy􀐅􀋲

Loading...