Şarkı sözleri

Sec Bidens eh, monganga Yebisa bango ba pesa nga raison na nga kô Po ba yebi eza ya nga Histoire ba changeaka ngo té Bakala Dia Kuba, Molokaï eeh Omesatone, mesatone eh-eh Omesatone, mesatone eh-eh-eh Ami-ami, camarade ya mboka mondelé Ba talaka na miso, ba yokaka na matoyi oh, ba lobaka na monoko Muana yoka toli bako pes'o na bato ngo Omesatone, mesatone eh-eh Omesatone, mesatone eh-eh-eh Ami-ami, camarade ya mboka mondelé Ba talaka na miso, ba yokaka na matoyi oh, ba lobaka na monoko Muana yoka toli bako pes'o na bato ngo, ooh Okoya ko lembola nzungu moto ya suka Mpo oboyi koyoka liteya ya nkoko e Niwa Olobi oko yoka mateya ya mama na yo mpo y'abota yo Bongo nani abotaki maman? Muana okimi mbula eko ko bombana na ebalé Tala buzoba esala ngando Oyo buzoba esala croco Wana bo niama osali mesatone, eh Bako meleké mayi ya liziba té, oh Bako meleké sé may'ebalé papa, tala muana Eh kowela té safu ekobima, y'okolia koleka Toko zela mbula ya sima, tambola molo Eh kowela té safu ekobima, y'okolia koleka Toko zela kaka mbula ya sima, kendeke malembé, ooh Motema mbindo eeeh, eh-eh-eh Matoyi mangongi eeeh, eh-eh-eh Omesatone eeeh, eh-eh-eh Suzy Kaseya eh, maestro Ba lingi kosukola kasi ba boyi nzoto na bango epola mayi, ezalaka? Moto mobimba elongi lokola porte ya boloko Molimo mbindo, matoyi mangongi ayoka té dis-eh Y'okanisi kindoki ezalaka ndengé nini muana ma Tango y'okosala mabé, yango ndé bondoki eh-eh Satana eh, molimo na yo mabé efuti yo Misère yé-yé-yé, yé-yé mokili etelemeli yo, eeeh Bato mibimba bilongi lokola porte ya boloko Milimo mbindo, matoyi mangongi bayoka té dis-eh Bakanisi kindoki ezalaka ndengé nini muana ma Tango bakosala mabé, yango ndé bondoki eh-eh Satana eh, milimo na bango mabé efuti Misère yé-yé-yé, yé-yé, eh mokili etelemeli bango, oooh Omesatone, mesatone eh-eh Omesatone, mesatone eh-eh-eh Ami-ami, camarade ya mboka mondelé oh Ba talaka na miso, ba yokaka na matoyi oh, ba lobaka na monoko Muana yoka toli bako pes'o na bato oooh L'incomparable, Jean-Jacques Mbwa Jules Mbala de Paris Gustave Mpazu, Germany Gabin Indianga, Bruxellois Opalanga, eeeh Polydore Onema, oyoki toko salela mvula na biso eh Ba ninga, ba mipesa ba titre ya Grand Manitou Chez Ntemba, Adam Bombole président, présidium Ah nga nawé yo-yo-yo Ah nga nawé nga papa na Djo yo-yo Ah ba fingaka nga, ba sekaka nga, ba tsholaka nga Nga nayebisa bango, moto ya motema mabé mboka na yé lifelo Moto ya moyibi ndako na yé boloko Moto ya matoyi mangongi suka sé bwalé Misère yé-yé-yé, yé-yé, eh mokili etelemeli yo, oooh Misère yé-yé-yé, yé-yé, eh mokili etelemeli yo
Writer(s): Sec Bidens Lyrics powered by www.musixmatch.com
instagramSharePathic_arrow_out