Thomas Lokofe 的热门歌曲
歌词
N'est-ce pas toi Élohim le secours qui ne manque jamais dans la détresse
Papa yoka losambo ya ngai mwana ee
Ngai wa yo nako lela na pinzoli na miso
Yokamela kolela na ngai, ngai mwana nayo
Naleli eeeh, ngai naleli eeeh ah-ah nzolele oooh
Natali na mokili masumu eleki eeeh
Mabe ekobimi malamu, malamu nde mabé
Moto nyonso na mokili aluka se interêt naye
Ata amoni moninga na pasi akipa te
Pona nini mawa esili na mitema ya bato
Tokosuka wapi eee ngai leli eee
Ngai naleli eeeh aah nzolele oooh
Mawa pe bolngo esilina mitema ya bato
Ba mingi naba hopitaux bako lela pasi eeeh
Naba home veillard nzala pe na minioko, kasi epayi nayo otondi
Na biloko olié na sima obwaki na fulu, na tangu wana basusu
Ata lipa ya pamba amonite pona nini mawa esili na mitema ya bato
Toko suka wapi ooo ngai naleli oooh
Ngai naleli eeeh oooh nzolele oooh
Yo lele papa oooh, Yaweh yo bolingo ya motema na nga
Yo lele papa oooh, Yaweh yo bolingo ya motema na nga
Na garde robe nayo otonda na bilamba ebele
Misusu wuta osomba otia ata na nzoto te
Omoni moninga nayo alati chemise epasuka
Y'olali na koseka n'esika opesa ye ata elamba alata pona
Nini mawa esili na mitema ya bato
Toko suka wapi eee, ngai naleli oooh
Ngai naleli eeeh oooh nzolele oooh
Tata Nzambé yoka kolela na ngai mwana eeeh
Mawa na motema yango nayembi na nzembo
Pasi ya baninga esengo ya basusu
Moninga akweya na mabe ekomi sujet ya kotonga
Moninga moins bolembu ekomi sujet ya ko tonga
Moninga moins botawu ekomi sujet ya ko tonga
Na esika olendisa ye azongela nzela ya Nzambé
Ekomi nde likambe ya kofinga pe na kotonga
Masiya yaka eee, mokili nayo Nzambé ekomi na suke eeeh
Biso tokomi se kobomana papa eeeh
Biso tokomi nde kobomana papa eeeh
Tokomi nde kobomana papa eeeh
Sala ozonga eeeh eeeh
Nzambé asengi tolinga oooh
Nzambé asengi toyokana oooh
Bayeba tozali ya Nzambé
Nzambé asengi tolinga oooh
Nzambé asengi toyokana oooh
Bayeba tozali ya Nzambé
I-ma-ole-ole bolingo oh bolingo ah iyo-le-li eh-eh bolingo ah-ah
Alleluai
Hmmm ça c'est la musique de chez nous
Kombo na ye Élohim, Sabaoth libanga na talo
Missi Jehovah Sabaoth Élohim bolingo ya bo mwana
Writer(s): Rene Tshikuna
Lyrics powered by www.musixmatch.com