歌词

1) Kadima tala ba lingi ko kunda ngai mobesu Nazali nano ko pema nano na kufi te oh ah Kadima mobali akabi ngai cadeau na ba mbanda Nazali nanu na mayi na nzoto elenge, yo yo ah 2) Fauti ya mbanda te oh Fauti ya commercant Atekeli biso elamba ndenge moko oh ba mpangi eh Commercant ye ko aluka naye se mbongo eh 3) Ngai na mbanda to kokani eh eh ye ye ah Nzambe asala nga moke lokola tonga ya masini eh Mbanda abanga lolendo na ngai te oh ima oh le oh, ye ye ah Mao tala Kinshasa mobimba ba lali 4) Ngai nazali se ko tanga plafond na canape oh Mawazo eh Kadi mobali akabi ngai cadeau na ba leki Bazalaki ko benga nga yaya na nzela ya zando eh 5) Um na sambwe oh oh Ngai na mesana ko seka ata lelo na siliki Mbanda abanga kanda na ngai te oh malole ye ye ah Taille ya mannequin oh ngai mwana ya lomeka 6) Mobali asambwisi ngai likolo ya vengeance oh, oh yo yo ah Oh mi na lewa eh eh Instrumental 7) Ngai na mbanda to kokani ba point Faute ya commercant eh Boka oyo makambo Yoka musique ya bana ya mboka 8) Ima ima eh, ima ima eh, ima ima eh ye ye eh bolingo pasi eh Mama ah Maloba ya tata liboso akata motema Na mbeto ya lopitalo ayebisaka ngai boye 9) Mwana soki ko kelela eleki na la vie eh Bakoya ko benga yo maboko makasi eh Mwana soki verite eleki mingi na monoko Bako ya ko benga yo epanza makita 10) Soki mobali alembi ko salela yo zuwa Wana ekomi kaka libala ya provisoire Mwasi ya mobulu asimbaka makwela ve oh Suka ya likambo se ba boya ye 11) Nyongo ya mbongi suka se ofuta Mwasi obangaki se na ndako ya Massiya eh ima Oh mama ah Instrumental 12) Mulowayi ko lele te Yoka, um, suka 13) Kadi ba kana ngai kala eh Ba hina ngai oh 14) Mobali aboya nga kala, nako yebaka te oh, ah Likambo na sala eleki lelo mbula zomi oh Mobali akangala ngai nkanda na motema Toko liya toko mela ata na sengi pardon 15) Ye na motema aboya ko limbisa ngai Aye ko baya ngai se tango na lingi ye mingi oh Ah ngai na nyokwami oh oh yo yo oh mama Oh yo yo 16) Mobali atika ngai bolingo na lolemu eh, oh yeye Libala epesi ngai pension ya bamwana oh, oh yo yo Mobali akabi ngai cadeau na ba mbada eh
Writer(s): Franco And Sam Mangwana Lyrics powered by www.musixmatch.com
instagramSharePathic_arrow_out