音乐视频

音乐视频

制作

出演艺人
Gael Music
Gael Music
表演者
Gael Ministries
Gael Ministries
表演者
作曲和作词
Trésor Bibi
Trésor Bibi
词曲作者
Gael Ministries
Gael Ministries
编曲

歌词

Moto nionso awa na sé aza na ba tina ya ko bikela
O'esalaka makasi ya moto, eza pe bisika ya ko likya
Yésu elikya na nga ya sika, ye ndé tina yako zala ngai
Na tiaka ya nga motéma na baye basala ba kombo awa na sé
Sima makambu e changé avenir na nga pe ekoti mobulu
Naluki bisika na tia lokolo, nzoka solution eza na batu té
Elikya na nga ya sika, Yésu eh
Na langwé bolingo ya quelque temps, nayoki ba "je t'aime" ya ndenge nionso
Sima ya mwa mikolo, déception ya moto toujours au rendez-vous
Nalongoli elikya na bato balapaka ndayi, basalela mosapi
Elikya na nga ya sika, Yésu eh
Na ndima maloba monganga aloba "ata na poto, bokono eko sila té"
Minganga bayekoli nzoto kasi mokolo nzoto, Mopesi na péma
Elikya na monganga té, yé pé azuaka péma epayi ya Nkolo
Na likya lisusu na Nzambé, yé ndé lisungi esilaka té, lisungi
Ya bayé pasi ebungisa bango elikya
Yako mona kokokisama ya bilaka na Nzambe awa'o sé
Elikya na nga sika
Ngai na likya lisusu (ata misu ya bomoto eza ko mona té)
Ngai na likya lisusu (ata kokokisama'a bilaka ewumeli, Yésu elikya na nga ya sika)
Ngai na likya lisusu (ata misu ya bomoto eza ko mona té)
Ngai na likya lisusu (ata kokokisama'a bilaka ewumeli, Yésu elikya na nga ya sika)
Olingaka té nga na lela, obongisa nionso ya malamu pona nga
Okota nga motéma, osilisa bilembo nionso ya pasi
Otia nzembo ya sika, refrain na ngo kombo na Yésu eh
Refrain na ngo kombo na Yésu (yaya na nga)
Refrain na ngo kombo na Yo (obongi na masanjoli)
Refrain na ngo kombo na Yésu (yaya)
Refrain na ngo nkombo na Yo
Elaka na Nzambe ekatisa bikéké kino elata nzoto
Maloba na yo élengi esala bokeseni na ba susu
Kombo na Yo ekoma sujet ya loyembo ya tango nionso, yaya
Molimo akiti eh, motéma etondi na sayi
Molimo akiti eh, elikya etondi motéma
Tango asimbaka ngai nayokaka posa se moko
Ya ko yembela Yésu oyo (ya ko yembela mosantu ya lola)
Ya ko yembela Yésu oyo (obongoli pinzoli na ko seka yango ngai'o)
Ya ko yembela Yésu oyo (ngai na meli té, kasi nalangwé na posa ya ko yemba)
Ya ko yembela Yésu oyo (ya ko binela mosantu ya lola)
Ya ko binela Yésu oyo (na developer makasi na nga ya ko binela Yo)
Ya ko binela Yésu oyo (ah ya ko sanjola mosantu ya lola)
Ya ko sanjola Yésu oyo (elikya emati lisusu nalingi na sanjola Yo)
Ya ko sanjola Yésu oyo (sanjola, sanjola, sanjola, sanjola, sanjola)
Ah na ko yembela mosantu ya lola (ya ko yembela Yésu oyo)
Ata na moni té na misu ya bomoto, nazo yemba (ya ko yembela Yésu oyo)
Elikya emati lisusu etindi ngai na yemba (ya ko yembela Yésu oyo)
Ngai na ko yembela mosantu ya lola (ya ko yembela Yésu oyo)
Yemba, yemba, yemba
Written by: Trésor Bibi
instagramSharePathic_arrow_out

Loading...