歌詞

Singa oy'a la vie eza na maboko'a Nzambe Yango soki okosala na motema na loboko Ata baninga ba yo bazongisi yo mabe Nzambe akotika yo te akopesa yo loboko Oko kende liboso Mumba muana Amy se yo Ah nga nga mawa nga balingaka ngai te Ah nga nga mama nga batongoko ngai Ah nga nga mama nga bafingaka ngai Nazanga bolingo boboto ya batu nazanga kutu na bondeko Zamba Na zamba (Kaka mpoka Na nga) Bisika nioso (Seko se kofinga nga) Bisika nioso oyo nga nalekaka mwe Nzela nioso oyo nga nakendaka awa Na se Mopaya ya zoba (Nazalaka seko mopaya) Batalaka ngai (Na miso ya litichio) Basalaka semblant (Na presence na nga) Kombo ya ndeko, kombo ya Amy seko babengala ngai se Na monoko kasi Na mitema te oh Nasala boni, baloba "Qui cherche trouve" Mama Amy Na we (welee) Ah mama Amy Na we (welee) Singa oy'a la vie eza na maboko'a Nzambe Yango soki okosala na motema na loboko Ata baninga ba yo bazongisi yo mabe Nzambe akotika yo te akopesa yo loboko Oko kende liboso Mumba muana Amy se yo Lisumu nga nasala, nakoluka Na yeba te oh Nga nsomi'ya Amy nga motema na nga pembe Nga papa na Rocky, ngai papa na Minou Nga Na suanaka te nga na bundaka pe te Soki kofinga, matongi eleki botutu ekosimba nzoto te Soki kofinga pe eleki moto'ango akokoma héros Boyaa boya koboma nazali awa Bokoki kobunga te boya se koboma Nakoki Kokima te oh boya koboma Mama Amy Na we (welee) Ah mama Amy Na we (welee) Mambo let's go Nakamata putulu'a ba wa, nasala nango ngomba, namata natalaka Liwa Na nga na mosika ehh Niongo ya nani naza nango, aloba nafuta, kombo na nga etika'ozala sukali na minoko ya bato Mama nayokeli yo mawa, mokolo'akufa na nga okozala olela ngai, na mi panzi feti nga muana obota bayina ngai mawa trop Ngai nabokolaki nioka, basuwi nga Na meme Diamant ata okundi yango dix ans Na poto poto, saleté jamais ekosimba nga motema na nga pembe nga muana Agbepa motema blanc Mama Amy nayokeli yo mawa, mokolo'akufa na nga okozala kolela ngai, na mi panzi feti nga muana obota bayina ngai (mawa trop) Iyi (mawa mingi) Iyii na nga we (mawa trop) Yo Sosthene nalela (mawa mingi eh)
Writer(s): Koffi Olomide Lyrics powered by www.musixmatch.com
instagramSharePathic_arrow_out