Lyrics

Linuka savon ba sangani ba telisa nzoto ya moto Souci Pasi ba yokani ba nuire nzoto na ngai oyo Ngai ko mwana'a bato ainé oyo ya famille Baleki ebele na sima ba tielaka ngai motema Pimela no ngai nionso kasi bolingo na yo te Po ete mosika na yo wara oluki liwa Ngai ko mwana'a bato ainé oyo ya famille Baleki ebele na sima ba tielaka ngai motema Kithima, Julia mama Kithima o sundoli nga na porte'a lilita Julie (Kithima) Kithima mama (Feza) Kithima o sundoli nga na porte'a lilita Mwana'a moto azo zika na moto ya bolingo no (na yo) Boye kobuaka petrol na moto ya bolingo'ango Pona zika ya Guy Ewa to na bika eeh Pasi na nga okomisi yango esengo na yo Et pourtant yo lobaki naza bras droit na yo Kithima, Julia mama Kithima o sundoli nga na porte'a lilita Julie Kithima mama Kithima o sundoli nga na porte'a lilita Bolingo ekomi poison eh empoisonné nzoto na ngai Heureusement nakoma testament mokolo na kowa Bakakengala nga papa ndoki te Innocent ya papa Roger Kithima Innocent a ma Mimi a bota Jonathan Soki bolingo ezalaki motuka ba sombaka na mbongo Nde na somba Julie Kithima a zala ya ngai Bien privé nakabola ye na moto te Nakozala a l'aise po ekosala ya ngai moko Elongi na nga ekomi panneau publicitaire ya bato'a mawa Ata moto'a lamuki na pongi azo yeba que nazo lela bolingo Kithima Feza na nga Kithima o sundoli na porte'a lilita Kithima, Julia na nga Kithima o sundoli nga na porte'a lilita Julie Kithima mama Kithima o sundoli nga na porte'a lilita Elongi na nga ekomi panneau publicitaire ya bato'a mawa Ata moto'a lamuki na pongi azo yeba que nazo lela bolingo Mimi Kangudi Paris Seizième Kithima yo'o sundoli nga na kati ya lilita Julie Kithima mama Kithima o sundoli nga na porte'a lilita
Writer(s): Fabrice Mbuyulu Bela, Isayi Savu Bidensi Lyrics powered by www.musixmatch.com
instagramSharePathic_arrow_out