Listen to Nalingi Yo by Oko Ebombo

Nalingi Yo

Oko Ebombo

Alternative

14,402 Shazams

Lyrics

Masanga ebongisaka makambo té (masanga ebongisaka makambo té) Mawa ezali na motéma na yo (mawa ezali na motéma na yo) Tozali ba bola, tozali na esengo ya kozala ndégé tozali Koyoka soni té (koyoka soni té) Komitungisa té (komitungisa té) Na pona mogongo ndima yango (na pona mogongo ndima yango) Kokanisa oyo ekoyela biso lobi té Tala bolingo oyo pesa bisso Kozala na somo té na bolingo Soki tongo etani, na yebi epai na wuta Nazali mwana poto, mwana Congo Nalingi yo Nalingi yo Nalingi yo Nalingi yo Soki tongo etani lokito ezali makasi na ndako Tongo nionso tango obelelaka, tango obelelaka ngai pe Esalaka ngai passi na motéma, lelo tango ekoki, mosolo ya bongo eyaka Soki otosi ba boti nayo, kozanga mbongo ebandaka makambo ebelé na mokili Nzambé azali na mokili oyo, bondéla suka oko zwa, oko longa Nzambé apesa na ga elikya, pona bossana oyo eleka ba mbula Tika na bongisa oyo eyaka na sima, mokili ezali passi soki pessi nga ngoulou Na ko longa, pasi eko sila, nalingi na mona miso na yo pembeni na ngai Ndé nazui lobiko ya seko, ba mbula na zanza nionso nazela Po na yebisayo ke nalinga ka yo Nalingi yo Nalingi yo Nalingi yo Nalingi yo Nalingi yo Nalingi yo Nalingi yo Nalingi yo Olelaka mingi pona nga lokola na salaka eloko té Kasi mbala oyo zala na ko ndima, ozali lokola moto a kangama miso azo mona té Oyokaka bilobela ya mokili kasi ko bangaté, ezali bilobela ezali mayi ya miso nanga ekokawuka Na ngolu ya Nzambé toko longa, mbula boni to zeli pona bozui esika Ya kotia mutu po tongo etana, soki na banzi tango oyo eleki pona to zwa mikanda Bakoko baloba na mokili kozela ezali lisumu té Motéma ya moto ezali lokola ebalé ya congo Mwana Gamboma, mwana Oko, mwana Paris Fogola motéma na yo, fongola motéma na yo Nalingi yo Nalingi yo Nalingi yo Nalingi yo Nalingi yo Nalingi yo Nalingi yo Nalingi yo
Writer(s): Clement Loubens, Daniel Malet, Oko Ebombo Lyrics powered by www.musixmatch.com
instagramSharePathic_arrow_out