Credits

PERFORMING ARTISTS
Jose Nzita
Jose Nzita
Performer
Antoine KATOTO LUHEMBE
Antoine KATOTO LUHEMBE
Performer
COMPOSITION & LYRICS
Jose Nzita
Jose Nzita
Songwriter
PRODUCTION & ENGINEERING
Antoine KATOTO LUHEMBE
Antoine KATOTO LUHEMBE
Producer

Lyrics

Tango nazalaki na mokili Nayokaki sango ya Nzambe oyo Lokola nazangaki boyebi Bato mingi bakosaki ngai Ba memaki ngai mpo na gumbamela Ba nzambe ya ba koko na ngai Namekaki kasi esimbi te Na kotaki na kati ya prison Nzoka ya Yesu aza kotala ngai Atondi na mawa na motema Atindi moto aya koluka ngai Apesaka ngai numero ya téléphone Nabengi nayoki eza ko sonné Ayambi ngai na kombo na ngai Ekamuisi ngai toyebani te Nzoka ya Yesu ayebaki ngai (Ayebi ngai êê) Ye ayebi ngai Ye ayebi ngai Nakobanga eloko te Mpo Nkolo Yesu ayebi ngai (Ye ayebi ngai êê) Ye ayebi ngai Ye ayebi ngai Na kolela lisusu te Mpo Nkolo Yesu ayebi ngai Paroles: Ayebi ngai, ata ofandaka na masina Yesu ayebi yo Ata ofandaka na malueka, Nkolo ayebi Eza likambo na ntango Nakoma na ngai lokola mua bébé Na maboko ya Papa na ngai êê Soki na leli lipa apesaka ngai Nasengi miliki apesa ngai êê Ata nazali na kati ya motuka Na mpepo to na kati ya masuwa Nabangaka na ngai eloko te Mpo Ye nde aza kobatela ngai (Ayebi ngai êê) Ye ayebi ngai Ye ayebi ngai Nakobanga eloko te Mpo Nkolo Yesu ayebi ngai (Ye ayebi ngai êê) Ye ayebi ngai Ye ayebi ngai Na kolela lisusu te Mpo Nkolo Yesu ayebi ngai Ba souci na ngai napesa na Ye Na koma na ngai lokola mpate Na bergerie Ye moko Berger Nde ya Yesu berger na ngai Nawutaki na éternité Nakozonga na éternité Mpo oyo nionso nazali komona Nde ye Masiya Abongisa ngo (Ayebi ngai êê) Ye ayebi ngai Ye ayebi ngai Nakobanga eloko te Mpo Nkolo Yesu ayebi ngai (Ye ayebi ngai êê) Ye ayebi ngai Ye ayebi ngai Na kolela lisusu te Mpo Nkolo Yesu ayebi ngai Mephibosheth azalaki na zamba Kuna na suka na lodeba Lokola Nzambe ayebaki ye êê Asukaki kolia na mesa ya roi Esengeliaki David abeta lindanda Tango Saül a azalaki kobela Bakendaki koluka ye na zamba ââ Aya kobeta na ndako ya roi Zachée amataki likola ya nzete Ayebaki na ye Nkolo Yesu te Mais lokola azalaki muana ya Abraham Yesu abengaki ye na kombo na ye Soki eloko ya Nzambe esali na Yo Ata bato nionso batelemeli yo Mokolo Nzambe akotombola yo Bango nionso bakokoma ba fana na yo (Ayebi ngai êê) Ye ayebi ngai Ye ayebi ngai Nakobanga eloko te Mpo Nkolo Yesu ayebi ngai (Ye ayebi ngai êê) Ye ayebi ngai Ye ayebi ngai Na kolela lisusu te Mpo Nkolo Yesu ayebi ngai Olele, ôôô Oôô, ôôô Ba, ôôô Baba Ôôô Baba Olele êê (Nalingi Yesu) Ngai nalingi Yesu Ngai nalingi Yesu Ngai nalingi Yesu Ngai nalingi Yesu (Nzolele Nkosi) Uûê nzolele Nkosi Uûê nzolele Nkosi Uûê nzolele Nkosi Uûê nzolele Nkosi (Nalingi Yesu) Ngai nalingi Yesu Ngai nalingi Yesu Ngai nalingi Yesu Ngai nalingi Yesu Uûê nzolele Nkosi Uûê nzolele Nkosi Uûê nzolele Nkosi Uûê nzolele Nkosi
Writer(s): Katoto Luhembe Antoine Lyrics powered by www.musixmatch.com
instagramSharePathic_arrow_out