Lyrics

Papa likambo likambo oh likambo té Tovandi na ndako yo okangeli nga elongi Esali ngai pasi esengeli nayeba Nabengi yo na chambre po tosolola Namemi ndé ngambo ehh Ofingi fingi ngai eh pé obeti nga Na butu bana balamuki batu ngai maman nini Nazangi nde maloba ya koloba na bango, pasi eehh Obuaki biloko na nga na libanda Na bala bala bato ba yé kotuna nga maman nini Nazangi nde maloba ya koloba na bango, soni ehh O parvenir kobelela nga na bala bala moyibi O parvenir lisusu ko sambuisa nga epa ya bato Eh ngai ndumba, ndumba ya liboso ezalaka yo oyebaka té Okoma kolala na ndako na ba delestage Mbongo ya bilei okoma kotika epa ya bana Biloko na lambi alingi lisusu kolia té Libala ya ngai na yo etikali sé ya bana – UUUUHUUHMMMUUU Nasali nionso esengeli muasi ya libala asalaka na ndako na yé Kasi olingi ngai té oh mobali ndekyo Nani aliesi mobali na nga mbuma mabé Alingi koyokela lisusu ngai té Soki nameki koloba akotuta ngai akotuta tuta tuta tuta ngai Akotuta ngai lokola pondu na eboka motute Yo mbanda pika pende, pika pende Awa yo kangi ya ngai molongani na kati ya kuku Okomisa yé lokola muana na yo ya musala Kitunga na wenze il faut kaka amemela yo Mbeto olalaka ye ndé atandaka yango Ba sani nionso ye moko a sokolela yo Ekoyebana, ekoyebana, ekoyebana... koo mamamaa Par amour moko té abetelaka mwana né lisolo azalaki kozua l'echec na classe Bazalaki ndé bango nionso ba premiers kokamwa ohh Nga na preferaki verité, fidelité na bolingo oyo ba futi nga en monnaie de singe, Tango basali alarme babeti nga soso kara na tongo eh eh Eh eh eh bolingo, Ba kakoli nga kizobazoba na koweit, Bateki nga matungulu na zigida, Bakitisi nga lokola mbisi ya libongo, Ba solder nga lokola na tombola na sambue Douleur ya operation sans anesthesie pasi oyo nayokaki Mokolo oboyaki nga gina, eh, bolingo corbillard marque deposee Ya voiture wana, Monganga akomeli nga na ordonnance, Destination deja connue, Lilita na privilege ekopesa, Est ce que esika na ko kende na kozala la bienvenue Mission na yelaki na mokili ya kolinga yo non réalisée Nasali bozoba lisala soso alali 17h asutuki na 1h Amoni ba mwinda akanisi moyi eh Abandi kobelela cocorico Batu ba lamuka cocorico Nga na preferaki verité, fidelité na bolingo oyo ba futi nga en monnaie de singe, Tango basali alarme babeti nga soso kara na tongo eh eh Reproche ya pamba oh naza beau gars, Identité na yo ekoma naza na mbongo, Miso pamba natali olobi je suis sapeur... Mama nga na kamue nzoka nde bolingo ekangaka pé ba soldats Bolingo esambuisaka ata pé ba magistrats avocat akangami eh maloba esili kili-kili té na bolingo mobulu té na bolingo sala attention, batela nzoto na yo vie ya mobulu ezalaka na tina té oh Eh eh eh bolingo, ba kakoli nga kizobazoba na koweit, bateki ng matungulu na zigida, bakitisi nga lokola mbisi ya libongo, ba solder nga lokola na tombola na sambue Naboyi na kota souci ya likelemba nalia té oh Naza banque té po na recevoir ba compte ya ba soucis Na ba chagrins nayebi ebandeli pe suka nango té Cheri pesa nga bolingo po na bosana le passé Cheri osali nga mabé nakomi lokola muana etike na ndeko Azangi papa na maman moyen ya kobima ezali té Fungola motema na yo, tika koniokolo nga moto ya bolingo bakangaka té, maladie ya bolingo ezanga ordonnance Toyebana, nayeba yo, toyebana mua kala eh lokola otiki nga nakosuka wapi papa, lokola obuakisi nga nakosala nionso nabosana mayé maleka eh nakoluka oyo akoki na nga po to vivre bien
Writer(s): Ngiama Makanda, Ndudi Masela Lyrics powered by www.musixmatch.com
instagramSharePathic_arrow_out