Lyrics

Na tikali se zero Na tikali maboko pamba eh Momi na nga a keyi atikeli nga se ndaka Ti ako zonga na lela te oh Mobembo ezali liwa te oh Na zela ye oh Atako ba seki nga na sima na kipa te Masuwa e memi ye monano motako te oh Na lela te eh-h-h-h-h Atikeli ngai photo Na pesi ye mpe oy'a nga A tala ka nga a bosani te awa a keyi Na bebi-h-h-h-h-h--h-h Eteni a memi ya molimo oh Na tikeli se eteni, na mi pesi na Yahwéh Losambo na nga oh, nzambe a batela nga na ye oh To monana lisusu Na kati ya ebale masuwa ekomi mosika Moto'oyo na bekanga aimé ye wana a ko kende Pinzoli e tangi na miso lokola mbula Nga na libongo lokola ba kati nga makolo Na koniokwama soucis e koniokola nga Aimé awa y'oke Satana ako meka ngai molimo na sima Oh sala y'o zonga Bolingo ya nga na yo ya nsomi Na tikali se zero Na tikali maboko pamba Momi na nga a keyi atikeli nga se ndaka Que ako zonga na lela te oh Mobembo ezali liwa te oh na zela ye oh Atako ba seki nga na sima na kipa te Masuwa e memi ye monano, motako te Na lela te eh-h-h-h Chérie a tikeli nga photo Na pesi ye mpe oyo ya nga A talaka nga, abosana te awa gazeux Na dangwe na nga ah nga dangue Eteni a memi ehh ya molimo ohhh Na tikeli se eteni, na mi pesi na Yahwéh oh Losambo na nga oh, nzambe abatela nga na ye To monana lisusu Na kati ya ebale masuwa ekomi mosika eh Moto'yo na bekanga yemeyi Ye wana a ko kende Pinzoli e tangi na miso lokola mbula Nga na libongo lokola ba kati nga makolo Na koniokwama Soucis e ko gnokola ngai Aime awa yo ke Santana a ko meka ngai molimo na sima Oh oh sala y'o zonga Bolingo ya nga na yo ya nsomi Ayo, ayo oh ayo omemi nga na dangua Bolingo ya mwna mama Nga naleli yo na dangua, Aime ya bolingo Yo key'o kumbi ngambo elaka ozongaka Po otalaka nga aimé epay'ozali Eloko'oyo bolingo po nini esalema boye? Moto oyo' lingaka un jour il faut akende Ba ninga ba lingaka ba zuaka litoma Oyo ya nga bolingo etaneli tongo sango Mokuya etingami nga na nzoto bomwana mama Oh oh mokuya ekangami nga na nzoto Ngai nsomi ya papa Eloko bolingo ekondisa se ngai Eloko bolingo emonela se Joniko Eloko bolingo ekondisa Aminata Eloko bolingo eniokolo pe Kapinga Ba ninga ba lingaka ba komaka santé O'ya nga bolingo e silisi nga nde nzoto bandeko Na tikali kaka mikuwa ya mpamba na se ya poso oh Oh oh na tikali kaka mikuwa ya mpamba Ngai soni ya mama Moni Mounyera kobosana pinzoli te oyo Etangaki nga na miso tango ya aurevoir Tango Loseba ebati eh Masuwa epesi mokongo ngambo ya Ngobila Masuwa ebandi monano na kati ya ebale mbong Ememi o'ya nga bolingo mboka mosika Nga na dangue Na lala wapi nga na dangue? Kapitatu Serge, Jean Jacques Rodale Bakoto Gere, Kiki de Paris Ndombasi na munster sala biloko na yo Mwika son nga na dangue Masikini Marthe, Mupatibi bébé Ladji na Cascade, Basonya na Manhattan Sima na yo awa oh cherie nga na beba eh Sima na yo awa na comprendre bolingo na yo Sima na yo awa natikala ngai te Lokola nzela oyo bato balekaka te Lokola porte oyo fungola ebunga Lokola nzetz oyo mopepe eboya koningisa Ah mama na ko katswa Nakoma komona mbeto eleki monene Mpo na ngai moko na kati ya butu Ebongaki te okende otika ngai ye mei Oh-h- otika ngai ye mei Sala oya mikolo eleki mingi Sala oya noki nga nakowa eh Sala oya nzoto ebandi kokima Aimé wa bolingo kobosanaka te chérie Yo tiki mwana moninga na pasi Yo tiki moto Nzambe akela na bwale Yo tiki moto alingaka yo na pili Zonga noki (Viril goro na Paris) Zonga noki (Jules Massua, Janot Canot) Zonga noki (oh chérie zonga) Zonga noki (zonga noki, zonga, zonga ah) Zonga noki Waterlo appelle Paris Waterlo appel Paris Tonton kia makiavidi appelle tonton Mayala de Panama Eh il était d'autant pire et on l'appelait Diana Mbuli Diana Mbuli de Panama Eh ngai ye yo, ngai ye yo Ozo mona vambo kanya
Writer(s): Koffi Olomide Lyrics powered by www.musixmatch.com
instagramSharePathic_arrow_out