Lyrics

Natatola kombo ya lobiko Bipai biyano ngai bikowuta Natiola na mbonge ya mayi ya bomoi, Yesu Nasimbama na oyo aleki nionso, Yesu Nazala esengo na yo mpo na seko Oyaka na elikya bipai kondima esuki, Yesu Yo nde moyi ya tongo ekimisaka butu na ngai Bipai ezali Yo nde bisika obongisi po na ngai Mpo ete oyo Yo ozali nde mpe ngai nazala Mokonzi merçi mpo na lobiko Mpe bomoi ya seko opesi na bangumbameli na Yo Bilaka na Nzambe bikomi bozui na ngai po na Yo Esengo na ngai nayeba ete Ozali Nkolo na ngai Osopi bolingo na Yo na motema na ngai, muana Nzambe Ofungoli bikuke ya bosantu bwa Yo mpo na ngai Osangisi Bonzambe na bomoto bwa ngai, oyo ngolu Mokonzi merçi mpo na lobiko Mpe bomoi ya seko opesi na bangumbameli na Yo Mokonzi merçi obengi ngai na kombo na Yo, mosantu Yo obengi ngai moninga na Yo nayeba nionso okosala Opesi ngai loboko na Yo nasimba mpo nabunga te Mokonzi merçi mpo na lobiko Mpe bomoi ya seko opesi na bangumbameli na Yo
Writer(s): Inconnu Compositeur Auteur, Katoto Luhembe Antoine Lyrics powered by www.musixmatch.com
instagramSharePathic_arrow_out