album cover
Natatoli
album cover
Natatoli was released on January 9, 2014 by Kin-Express Productions / Antoine KATOTO LUHEMBE as a part of the album Près de toi...
January 9, 2014
LabelKin-Express Productions / Antoine KATOTO LUHEMBE
BPM166
Melodicness
Acousticness
Valence
Danceability
Energy

Lyrics

Otelemi ngai nafukami, onetwami na mikitisi
Epayi na yo nde nazui bomoyi ya libela seko na seko
Oyo olobi nde nakotosa, oyo olaki nde nakosimba
Oyo osali nakobomba te, kumisama Nzambe na mawa
Natatoli na bomoyi na ngai, Yesu nde Mokonzi
Natatoli na bomoyi na ngai, Yesu nde Mokonzi
Ofandi na motema na ngai na esika ebulisami
Epayi oza ngai pe nazali ya ngai nayo ekosila te
Moninga oyo ya tango nionso, ngolu nazui nde koyeba yo
Yo nde osengeli pona ngai, Yesu Yaya oza malamu
Natatoli na bomoyi na ngai, Yesu nde Mokonzi
Natatoli na bomoyi na ngai, Yesu nde Mokonzi
Nalingi na ngai Masiya
Naponi ngai se yo eh
Oyo akota ngai motema
Kaka yo Papa
Osilisa ngai posa ya mokili
Likolo ya bolingo na yo eh
Kaka yo papa eh
Yesu eh
Liziba ya mayi na bomoyi, efandelo ya babulami
Ekuke ya nzela na lola, bolingo ya bolenge bwa ngai
Natanga te kombo mosusu pene pene ya kombo na yo
Lokola yo akowuta wapi? epayi na yo nionso ekoki
Natatoli na bomoyi na ngai, Yesu nde Mokonzi
Natatoli na bomoyi na ngai, Yesu nde Mokonzi
Ngai nalingi eh
Nalingi na ngai Masiya (Oh Yesu eh)
Naponi ngai se yo eh (Yaya)
Oyo akota ngai motema (L'ami fidèle oh)
Kaka yo Papa (Eh)
Osilisa ngai posa ya mokili (Ya mokili)
Likolo ya bolingo na yo eh (Yesu na ngai)
Kaka yo Papa eh
Yesu eh (Mobikisi eh)
Nalingi na ngai Masiya
Nalingi na ngai Masiya (Yesu eh)
Naponi ngai se yo eh (Oh Yaya)
Oyo akota ngai motema (Nkolo eh)
Kaka yo Papa (Kaka yo papa)
Osilisa ngai posa ya mokili (Oh-oh-oh-oh)
Likolo ya bolingo na yo eh (Likolo ya bolingo na yo eh)
Kaka yo Papa eh
Yesu eh (Papa, Yesu eh)
Natatoli na bomoyi na ngai, Yesu nde Mokonzi
Natatoli na bomoyi na ngai, Yesu nde Mokonzi (Yesu nde Mokonzi eh)
Natatoli na bomoyi na ngai, Yesu nde Mokonzi (Misisa na mayi na nzoto)
Natatoli na bomoyi na ngai, Yesu nde Mokonzi (Yesu eh, liziba ya bomoyi eh)
Written by: Franck Mulaja
instagramSharePathic_arrow_out􀆄 copy􀐅􀋲

Loading...