Music Video

Lyrics

Ozali Nzambe, Nzambe na nguya nioso Likolo ne nse bikelami na yo Nguya na yo efandi na kembo na yo Na bosantu bua yo, mpe na bonkumu bua yo Mitunguisi nionso ya bomoyi na nga Ekomaka kimia tango na za nayo oo Yo kitisaka moto netumbelo oo Bo banguna na yo bakufa na nsoni Nzambe na nguya ee Kumisama Yawe, Nzambe na nguya, Kumisama Yawe Na yembeli yo Papa malamu uu Kumisama Yawe, Nzambe na nguya, Kumisama Yawe Ozali Nzambe, oyo apona nga a Mobundi molongi, ya bitumba na nga Yo nde opangusaka, pisoli na miso Na mitema oyo mizali kolela O niata satana a, kuna na Golgotha Mpo mapinga na yo, ba zala na elonga Nguya na ya, emonani na miso Bato ba kobika pona kombo na yo Nzambe na nguya ee Kumisama Yawe, Nzambe na nguya, Kumisama Yawe Na yembeli yo Papa malamu uu Kumisama Yawe, Nzambe na nguya, Kumisama Yawe (2 fois): Kumama Yawe, Kumama Yawe Kumama Nzambe na nguya, kumama Yawe Solo 1: Okabola mayi na ebale, Papa yo bonguani te Ata na kati na moto, na yebi na kolonga Okatisa mabota na nguya ya loboko na yo Yo nde Nzambe na Mose, okosaka te oo Solo 2: Nani akoki kosunga lokala yo mosantu Yo nde Nkolo na bomoyi, otonda nguya Osekuisa Masiya na nguya ya loboko na yo Ata na kufi lelo oyo, na yebi na kosekua Fololo ya bolingo, naye kobonzela yo Yo nde osimbi mitema, ozali Nzambe
Writer(s): Inconnu Compositeur Auteur, Katoto Luhembe Antoine Lyrics powered by www.musixmatch.com
instagramSharePathic_arrow_out