album cover
Lamentations
16,070
Christian & Gospel
Lamentations was released on January 9, 2014 by Kin-Express Productions / Antoine KATOTO LUHEMBE as a part of the album Dans Ta Presence Vol. 2
album cover
Release DateJanuary 9, 2014
LabelKin-Express Productions / Antoine KATOTO LUHEMBE
Melodicness
Acousticness
Valence
Danceability
Energy
BPM95

Credits

PERFORMING ARTISTS
Mike Kalambay
Mike Kalambay
Lead Vocals
Shekina Music
Shekina Music
Ensemble
COMPOSITION & LYRICS
Mike Kalambay
Mike Kalambay
Songwriter
PRODUCTION & ENGINEERING
Antoine KATOTO LUHEMBE
Antoine KATOTO LUHEMBE
Co-Producer

Lyrics

Papa tokende lisusu epayi na nani?
Yo moyoki losambo yoka kolela ya motema ezoki mingi
Nkolo Yesu yo Mwana na Nzambe
Yo nde mitema ya basantu etalelaka
Bayaki na yo, bazongaki pamba te
Papa malamu oyebi olata pasi ya bana
Ozali moko oyo aza na makoki
Ya kopesa biyano na bayike na mbala moko
Oh Yesu yo, Papa malamu Yesu eh (Oh Yesu yo, Nzambe ya solo)
Ouh Yaya, ekimelo na ngai se yo
Eh Yesu eh, pinzoli na ngai etangi
Oh Yesu nakomi na suka yo
(Ah Yesu)
Oh Yesu pinzoli etangi
Pasi na motema nakaba lisolo yango na nani?
Ata nayebisi moto ako kokoma te
Pasi na motema miso ya moto ekoma ndenge nini?
Naleli, lokola Yoane na Patmos
Nani alingi nga, alongola ngai pasi oyo, Yaya?
Naleli, pangusa nga mayi ya miso, Yesu
Yesu Mwana Nzambe, motema na ngai eleli mingi eh
Nayebi ozali Nkolo, elikia ya basantu nionso
Motema epona se yo, yo Nkolo ya bomoyi na ngai
Nayebi ozali Nkolo, elikia ya basantu nionso
Motema epona se yo, yo Nkolo ya bomoyi na ngai
Oyo esalaka ngai pasi na motema
Na ekulusu omemaki yango
Yesu Mwana Nzambe, pikola na mosisa
Oyo nionso elelisaka ngai
Zala Papa, nazala mwana
Ngolu na yo ebomba ngai
Eh, eh
Pinzoli na ngai, Papa etangi mingi (Etangi mingi eh)
Na Bible pona ngai bilaka esili to nini eh?
Nagangi "au secours", mongongo ekawuki ngai
Nalingi nayeba nini ezopekisa y'osala?
Soki pe lisumu, loba natumbela
Po pasi oyo nazokoka lisusu te
Soki pe ya baboti to pe bakoko na ngai, Yesu
Banza ekulusu, makila osopaki pona ngai
"Tout est accompli" maloba na yo
Boni ya nga likambo, Yesu ezangi solution, telema moto ya suka eh
Nayebi ozali Nkolo, elikia ya basantu nionso
(Oh Nkolo, elikia ya basantu nionso)
Motema epona se yo, yo Nkolo ya bomoyi na ngai
(Eh Nkolo na ngai, Mokonzi na nga nayebi)
Nayebi ozali Nkolo, elikia ya basantu nionso
(Oh Nkolo Yesu, ya basantu nionso Yesu na ngai)
Motema epona se yo, yo Nkolo ya bomoyi na ngai
(Epona se yo mosusu te Yesu, ya bomoyi na ngai oh Yesu eh)
Oyo esalaka ngai pasi na motema
(Ngai pasi na motema Yesu)
Na ekulusu omemaki yango
(Na ekulusu omemaki yango)
Yesu Mwana Nzambe, pikola na mosisa
(Oh pikola na mosisa, oyo nionso)
Oyo nionso elelisaka ngai
(Eh Yesu, etangisaka nga pinzoli)
Zala Papa, nazala mwana
(Papa, nazala mwana na yo)
Ngolu na yo ebomba ngai
(Ngolu na yo, nga nayebi)
Nayebi ozali Nkolo, elikia ya basantu nionso
(Oh Yesu, ah elikia na ngai Yesu eh)
Motema epona se yo, yo Nkolo ya bomoyi na ngai
(Epona se yo mosusu te Yesu, mosusu te Nkolo, nayebi mosusu te)
Nayebi ozali Nkolo, elikia ya basantu nionso
(Y'ozali Nkolo na nga, Nkolo na nga, mokonzi ya basantu)
Motema epona se yo, yo Nkolo ya bomoyi na ngai
(Eh, nayebi nzambe mosusu te, ya bomoyi na ngai, eh)
Oyo esalaka ngai pasi na motema
(Oyo esalaka ngai pasi na motema na nga)
Na ekulusu omemaki yango
(Na ekulusu omemaki yango, Yesu eh)
Yesu Mwana Nzambe, pikola na mosisa
(Yesu ye, Papa okeyi wapi eh)
Oyo nionso elelisaka ngai
(Yesu na nga, Nkolo ya bomoyi na ngai)
Zala Papa, nazala mwana
(Oh nazala mwana na yo)
Ngolu na yo ebomba ngai
(Ngolu na yo ebomba ngai)
Written by: Mike Kalambay
instagramSharePathic_arrow_out􀆄 copy􀐅􀋲

Loading...