Credits
PERFORMING ARTISTS
Mike Kalambay
Performer
COMPOSITION & LYRICS
Mike Kalambay
Songwriter
Lyrics
Mbata ba beti na litama ya gauche
Na pesi ya droite ba beti likofi eh
Bitumba elongwé ya libanda
Ekoteli nga na ndaku eeh, Yesu
Yo ndé oloba na zongisa té eh
En plus o imposé nga silence
Ndima kasi ozala molobeli na ngayi
Avocat na nga eza yo Yesu
Ah Yesu eh motema na nga, nga lembi eeh
Ouh ouh eh
Ba benga yo Belzébuth otala
Pourquoi nga na suana po ba finga oyo ba lingi
Ba pakoli pili-pili na maboko, ba weli mbango ko longola nga poti na lisu eeh
Na kati ya désert bazo seka pinzoli na ngayi
Po ba yebi mayi ezalaka na désert té oooh
Mayi ezalaka na desert té eeeh
Ngayi na fukami na beleli yo, miso eko suwa ngayi
Losambo na monoko osala nga grâce neti ya Agar
Yé amonaki liziba, nga ata kopo ya mayi
Na mela ndambo, na sokola miso na ndambu
Nazo mituna monguna amoni nini eeh
Nalobi na nga Yesu eeh
Naza na mbongo yako futa avocat té
Mais na tribunal motema na nga etondi kimia
Monguna nini ako samba na nga pé alonga ngayi
Soki Yesu azo défendre nga aah
Avocat na nga aah, Yesu
Défenseur na nga aah, Yesu
Ba dossiers ya molili, alongisi
Ya personnalité na nga, alongisi
Avocat na nga aah, Yesu
Défenseur na nga aah, Yesu
Ba combats ya molili, alongisi
Ya reputation na nga, alongisi
Ba kani ko tia nga à genoux, ko kanga maboko té ooh
Avocat wanyi mema
Kayi munda ba munda eeh
Naza na mbongo yako futa avocat té
Mais na tribunal motema na nga etondi kimia
Monguna nini ako samba na ngayi pé alonga ngayi
Soki Yesu azo défendre nga aah
Avocat na ngayi iiih (avocat na nga aah, Yesu)
Mobundeli ya ba santu (défenseur na nga aah, Yesu)
Ba dossiers ya molili, alongisi
Ya personnalité na nga, alongisi
Avocat na nga aah, Yesu
Défenseur na nga aah, Yesu
Ba combats ya molili, alongisi
Ya reputation na nga, alongisi
Ce qui ne me tue pas, me rend fort
Ata wolo ba testaka ngo na moto
C'est le soir qui détermine si l'on est fils
Ngomba ekweyaka na mipépé té oh
Ko yemba, mosala ya ko édifié église
Eko kweya té oh, noki monguna a longa aah
Ko teya, mosala ya ko gagné ba âmes
Eko sila té oh niki monguna a dondwa
Défenseur na nga azali Yesu
Mon rédempteur est vivant na ngwendé na yé
Azo plaider cas na ngayi
Justice na yé eeeh, nani alongwa eeeh
Alléluia
Yesu ba pakoli pili-pili na maboko eh
Ba weli bango ko longola nga poti na liso eeh
Nakati ya désert bazo seka pinzoli na ngayi
Po bayebi mayi ezalaka té ooh
Alléluia eeh-yi iih
Naza lokola aveugle afongwami miso
Ako zongela nzeté té
Naza na mbongo yako futa avocat té
Mais na tribunal motema na nga etondi kimia
Monguna nini ako samba na ngayi pé alonga ngayi
Soki Yesu azo défendre nga aah
Avocat na ngayi (avocat na nga aah, Yesu)
A polaka na procès té ooh (défenseur na nga aah, Yesu)
Ba dossiers ya molili, alongisi
Ya personnalité na nga, alongisi
Aaah avocat na ngayi (avocat na nga aah, Yesu)
Mobundeli ya ba santu (défenseur na nga aah, Yesu)
Ba combats ya molili, alongisi
Ya réputation na nga, alongisi
Avocat ya bana na ngayi, Yesu eh
Ya Shaddaï na Zion, Yesu eh
Ya bomoyi na nga, Yesu
Le père des orphelins
Le défenseur des faibles, ezali yo Yesu na ngayi
Ata na bundi té, Yesu eh
Elonga oko pesa nga, Yaweh eh
Yaweh eeh
Yaweh eeh
Yaweh eh
Written by: Mike Kalambay

