Music Video

Franco - Mamou (Tu vois) [feat. Madilu]
Watch {trackName} music video by {artistName}

Featured In

Credits

PERFORMING ARTISTS
Franco
Franco
Performer
Le T.P.O.K. Jazz
Le T.P.O.K. Jazz
Performer
COMPOSITION & LYRICS
Franco Luambo
Franco Luambo
Songwriter
Madilu System
Madilu System
Songwriter

Lyrics

Olobaki nini ee ee Olobaki nini ee ee Olobaki nini mamou ee ee Olobaki ngai nafundaka yo na mobali nayo Olobaki ngai nasalaka kisefe na libala na bino Madilu tika ye aloba ee Makambo ye asalaka ayebaka te Babalabala ye atambolaka, bato bamonaka ye Ba ndako ye akotaka ba murs ya ndako efundaka ye Na ba coin nyoso ye atelemaka, ba chauffeur ya taxi bamonaka ye Mpo na nini apanza yo nsango alobi yo osalaka kisefe ee? Ngai moto nakotelaka yo mamou ee Ngai moto nayebi basekele mamou ee Lelo nakomi moto mabe oo mamou ee Oyebi tango engindaka ooh mamou eeh Okokanisa ngai mamou nakei ee eeh Ata ofingi ngai ndumba mamou eeh Oh mamou, nakamwe Vraiement mammou Nakanisaka ozalaka amie na ngai ya motema Mpo, oyebi te nayebi ba sekele na yo nyoso Eloko ekamwisi ngai lelo mamou, okeyi kofinga ngai epayi ya moussa Olobi ngai nazali "ndumba" Vraiement mamou oyebi ngai nabalaka, nadivorsa, nabota Bongo soki lelo oyo yo mamou, moto natiaka motema Obandi kofinga ngai ndumba Kindumba ezali maladie te, Kindumba ezali punition te Mamou yo mwasi wa libala Nakamwaka yo, otambola na kabambi ya sac 'a main Na sac wana, kabambi ya liputa, brose 'a dent lokola moto akokende Voyage, lipapa ya nse, ebele ya makasu Eloko nini okoluka ee mamou ye eeh? Mamou oyebi epayi na yo ngai nazalaka buvre Mpo nayebi mibali nayo akuti yo nyoso tuu Ata mobali nayo akuti yo oza kosala na mobali Okoloba te eza mobali na ngai Mais nalingaka koboma libala na bino te Mpo nalingaka bobokolo bana na bosemo Au lieu nakota baloba oooh tala mwasi ya ndumba awuti koboma libala ya mwasi oyo abala Eloko nini okoluka ee mamou ee? Signature osi ozwa Mamou Landa nzela ya libala ooh mamou Yango evandisa yo na mpoto mamou ee eeh Tika kokosa mobali nayo mamou ee eeh Soki atelefoner loba obimaka mamou uuh Mamou awa tuu soki nalobi, nakumbi ngambo mpo naza ndumba Yo moko oyebisa ngai mobali na yo atinda yo na poto mpo oya kobokola bana Yango wana apesa signature Ekoma yo awa oyebisa ngai mobali na yo atelefonaka 2 fois par jour Na 6 heures du matin, na minuit Apre's minuit soki atelefoner yo Okamati kisi ya bangungi opomper ndako mobimba Mpo bana balala tii ntango okozonga Mpo oyebi te mobali na yo atelefonaka na 6 heurs du matin Tango atelefoneka yo yoka ndenge oyebisaka na mobali nayo "Allo, papa ya bana, biso toza na biso kaka malamu Kaka nde bana na yo awa moyen te Vraiement mobulu likambo Surtout mwana oyo ya moke ya mobali oyo ozwa elongi na papa ee Azokamwisa ngai papa Foto kutu otiya na sani natalaka ata elongi na yo abamba yango na mabele foto epasuka Mwana oyo mpenza mobulu penza kaka se ndenge ozalaka mwana moke Lokola mama na yo ayebisaka ngai Papa ya bana, na'a na makambo mosusu naloba te kaka otindela biso mbongo ya koliya, nasuki se bongo" Yo moko osalaka mabe ee mamou ee eeh Yo moko osalaka mabe ye yeh Obangaka mobali nayo te mamou ye yeh Olongola respect na ye okaba mamou ee eeh Ba camarades ya mobali nayo mamou ee, obangaka bango te oo oo mamou ye Lelo ofingi ngai ndumba ah ngai naseki eee mamou ee ee Oh mamou, kindumbaoza kofinga ngai brusselle mobimba Okeyi tii na paris osilisi ngai Otindi mokanda na Kinshasa, mosusu otindi na Brazza Kindumba eza punition te mamou Oyeba mamou eswi ngai Nalingaki d'ailleurs nafunda yo mamou Inutile nafunda yo Nakamati obele filime ya makambo nyoso ya mabe oyo osalaka Natekisi yango epayi ya yobo Mpo azikisela ngai filime wana Mamou koma ngai Ndenge bakomaka yezu na kurunze Sete mibale na maboko, sete moko na lokolo Mamou ozali mwasi ya libala okamwisaka ngai Namonaka yo ozali ndoki Ozali kinsweka, ozali monyororo Mamou nini nakoki koloba mpo na yo Example nini yo okoki kopesa mpo na basi ya mabala? Example ezali te Kaka baloba te mpo ngai nazali ndumba Na'kotambola na mwasi ya libala Yango wana na'kopesa yo makanisi mabe Te, ezali nde yo moko moto oza na makanisi mabe Ngai moto nakotelaka yo ooh Ngai moto nayebi basekele ee ee Lelo nakomi moto mabe oo mamou ee Oyebi tango engindaka ooh mamou eeh Okokanisa ngai mamou nakei ee eeh Ata ofingi ngai ndumba mamou eeh Ngai moto nawelaka yo mamou eeee Ngai moto nakufelaka yo Lelo nakomi enemi jure oh mamou ee ee Oyebi ntango engindaka mamou uh Okokanisa ngai mamou nakei ee eeh Landa nzela ya libala oh mamou ye ye Madilu tika ye aloba ee ee Makambo miki-mike ye asalaka ayebaka te Ba couleurs ya ndako efundaka ye, Bato bamonaka ye, lelo apanza ngai sango Afinga ngai nazali ndumba Kindumba ezali maladie te Kindumba ezali punition te Kindumba na ngai nazwaka Kindumba na ngai bayebi Nakosaka moto te Mpo na nini apanza ngai nsango olobi yo osalaka kisefe? Mamou mokolo mosusu, tongo etaneli yo epayi mosusu Mpo olalaki na ndako te Odevancer mobali nayo otelefoner ye avarant 6 heures Mpo oloba te ozali na mwana na yo oyo ya moke na kati ya hospital, azali malade Yo moko osalaka mabe ee mamou Yo moko osalaka mabe ee Obangaka mobali nayo te mamou Ba-camarades ya mobali nay o mamou Olungola respect na ye okaba mamou ee ee Ba camarades ya mobali nayo mamou Obangaka bango te mamou ye ye ye Lelo ofingi ngai ndumba ngai naseki ee mamou Oh mamou kindumba oyo oza kofinga ngai lelo mamou Soki natali malamu tozali kaka ndenge moko Eloko oyo oza koprofiter na kati ya libala mpo ata oboti bana na mibali mosusu okopesa Bana wana kombo kaka ya mobali nayo Mamou oyebi que kindumba na ngai nazwaka Naprofitika epayi nayo te mamou Koma ngai, oyebi que naza na nyoso mamou
Writer(s): Franco Lyrics powered by www.musixmatch.com
instagramSharePathic_arrow_out