Lyrics

Ye mei, Madilu Multi System Ah! Yo ndeko ya mwasi Oye ko beta nga kabakata ya likofi Po nako solola na mobali nayo Vraiment oyebi te que mobali na yo Ayali yaya na nga ya quartier ba salaka boye te Boni ko Na mesana na nga bitumba te, maman Boni oko kanela nga na sali yo nini eh Ngai ko na bundaka te, maman Banda na botama na sala na nga ata physique te oh Wapi nzoto ya bitumba, eh mwana oyo? Ba finga ba tonga na kipaka te oh Ngai ko na boya na nga bitumba oh, maman Na lobi rien Na mesana na nga ko swana te Je peux vomir Boni oko swanisa nga na se ya mbula Ba kake eko beta likolo Olingi obundisa ngai Po ozua bomengo, oh maman Kitoko ya mwasi na mokili ezali chance ya la vie te Mobali oko bundisa ngai azali vieux ya quartier Coco, nayebi te Lokola tozali na mokili oyo ya se Nanu to komi na paradiso te Soki okoki ko zua chance Ya ko zua mobali oyo ya yo moko Ah tika biyoka yoka Nazangi moyen Ko swana pe bitumba ezalaki likambo nde ya kala Nani alakiso habitude mabe boye, Coco? Na banga makofi di Nga na bundaka te eh, Coco eh Nga na swanaka te eh, Coco Nga na boya manzaka na elongi na ngai eh Nga na koma na ngai ko sambela Yezu Nga na koma ko banga mibali ya bato masumu Instrumental Eh, Coco Na moni eh Tokoma na biso ba changeur de monnaie Omonaka ndenge ba mère wana ba ngindaka te Vraiment na ba mbula oyo tokomi na yango To changaka lisusu mibali Ah pasi eh Maman oh, c'est vrai Soki na salaki yo mabe, olimbisa ngai eh Soki na bomela yo moto na famille Luka opardonner ngai oh Coco eh, (maman) Maman eh soki na salaki mabe, limbisa ngai eh Coco eh, (maman) Maman eh soki na salaki mabe, limbisa ngai eh Nayebi pota ya bolingo eleki pota ya lisasi Kasi okokaki Ko sambwisa nga boye te maman ah Coco eh, (maman) Maman eh soki na salaki mabe, limbisa ngai eh Coco eh maman eh Soki na salaki mabe, limbisa ngai eh Mobali oyo okoseli nga makambo Coco Nga nde moto na lakisaki yo Nzombo Faustino eh Coco eh, maman eh Soki na salaki mabe, limbisa ngai eh (C'est vrai) Coco eh, maman eh Soki na salaki mabe, limbisa ngai eh Na sengi yo bolimbisi mbala kama ondima ngai te Na tubeli masumu na nga epayi ya Abbe Jacques abeji Coco eh, maman eh Soki na salaki mabe, limbisa ngai eh Coco eh, maman eh Soki na salaki mabe limbisa ngai eh Coco eh, maman eh Soki na salaki mabe, limbisa ngai eh Vraiment ah Coco ndenge na yebisaki yo kaka Possibilite mosusu eza nango Tokota na biso na zando ya Gambela To tekaka bilamba na biso, na ba bijoux MPo soki to landi kaka mibali oyo mitu pasi Vraiment na mokili oyo ya se tozali Lokola to'a nano na misuni Nano tokomi na paradiso te Epayi toko zua molimo Po ozwa chance ozua mobali Aza obe na yomoko Sans que azanga ya pembeni Eza problème
Writer(s): Madilu System Lyrics powered by www.musixmatch.com
instagramSharePathic_arrow_out