Lyrics

Tongo etani, eh Moyi ekobimakasi ngai na motema, eh Molili makasi Butu ekoti, eh Ngai natangi buku ya Nzambe banda Genèse ti na Apocalypse Nyoso nabombi, eh Liloba ya nzambe ekotikalaka Manso ekolekaka Mabe nyoso osala Ngai nazali mwana ya Nzambe, eh Nalimbisa yo, eh Tongo etani, eh Ezalaki na tango oyo tokoya eh Lokito ya mongongo na yo Tozwana bomwana eh L'amour fou koleka kutu Adamu na Eva na jardin d'Eden Destin ekaboli ba nzela Kasi moluki azwaka Ngai navandi na porte Fungola motema, eh Liberté ozuwaki, eh Lokola mwana nyoso ya makanisi Ake kosakana akozongela mama na ye Kinsala, tango nga na yo tolinganaki Nalakisaki yo buku ya bolingo Oyo ezali na motema na ngai Na page ya liboso, bakomi amour Na lokasa ya mibale, bakomi love Na oyo ya misato, bakomi bolingo Na ya minei nde, bakomi mapendo Kasi oyo ya suka Soki obaloli ba page nionso, yoka nga malamu Bakomi, bolingo ya suka te Buku ya Nzambe, bandeko Na tangi ebandeli ti na suka, eh Basengi bolingo Yo ko lolendo Ezalaki koliya ya pamba nabondela Ata ba mpiaka, eh Tovandaki kozua na biso nde bolingo Lelo oke, oh Awa otiki bolingo, epai okei, oh Kuna basombi yo eh Nga nawi, eh Bolingo esilaki te na motema oh Na wanze, oh Babotoli nga yo pona mbongo, Kinsala eh Nakosenga, eh Na Nzambe abwaka mosolo lokola mana eh Bato banso Ya mokili, balokota bongo oyeba valeur ya bolingo napesaki yo eh Kinsala, oyebi bolingo napesaki yo, papa Eleki ata mbongo na valeur Oyebi te Yudasi atekaki Yezu Abosanaki bolingo azalaki na ngo Tango azui mosolo, aye komona te Ezali pamba, bolingo eleki Akendeki kozongisa mosolo Epai ya ba zuzi, pote azongela bolingo Kasi ba zuzi, baboyaki kozua mosolo Po bayebi ndenge nini, bakozongisa lisusu bolingo te Nga nawi, eh Babotoli nga yo po na mbongo, Kinsala eh Nawanze, oh Bolingo esilaki te na motema, oh Nakosenga, eh Na Nzambe, abuaka mosolo lokola mana eh Bato banso Ya mokili, balokota bongo oyeba valeur ya bolingo Napesaki yo eh Papa, kaka mbongo o to kolinga Nazwi mpasi, soki liwa, nde napoli Ata liso te Soki oye na kombo na ngai, akopesa yo nzela te Bongo, na kombo ya bana oyo to boti Ozwa ata makanisi ya mobali ya Muzi te Nga nawi, eh Bolingo esilaki te na motema oh Nawanze, oh Babotoli nga yo, lokola mbongo, Kinsala eh Natikala awa pasi Lokola makolo ya yesu masiya eh, babaka na sete Nakosenga, eh Na Nzambe mikolo nyonso na losambo, résurrection na nga Oh Papa, na mokolo ya mpasi Nani ako buakela nga mandalala ya mokuya
Writer(s): Carlyto Lassa Lyrics powered by www.musixmatch.com
instagramSharePathic_arrow_out