Lyrics

Nzété ebetela nkaké Ebangaka té likolo eyinda Osaaka ngele mokolo eyi molayi Ko zanga ko yeba E'a liwa ya ndambu Ah, maman ah tala ngonga ezobeta Don Pierrot tala ngonga esi ekoki Ya l'amour oy'olakaki nga Hmm ya bolingo oyo prometaki nga Ko linga té ekoma ya au secours Ko linga té moto aya kowa Yaka na yango malembe mah Yaka na yango yo moko eh Mwinda ya nzela kala té ezo kufa Naboyi na ya ko wa n'ango elongo Na préférer na zela jour na nga ah Ntango okoya sans temoin ni juge Lilita na nga kombo na ngo amour na yo Oh-oh-oh-oooh Mondele asala mbongo na mandoki (aah) Alukela mokili mindondo Kasi pona souffrance ya l'amour Akoka té kosala ata Aspirine Na ndéngé pe aluka akoma na sanza Ngai'o nazo wa mpo nalingaki Moninga moto selon loi ya Dieu Tango akelaki Adamu na Eva Atindaki to linganaka eeeh Y'ozo boy'olinga nga eza lisumu Ngai na kokufa té soki nanu olingi ngai té eh-eh-eh En réalité Na botamaki mokolo na kutanaki nayo oh-oh-oh Mwind'a nzela jamais eko kokana na oyo beauté eh-eh-eh Yaka au secours na nga, ngai moto motema e zoka ah-ah-ah Heure tokomi ata ba chauffeurs ya b'ambulances balali ih-ih-ih Ata na paradiso heure tokomi, Saint Pierre alali ih-ih-ih Photo na maboko na komi ko yenga yenga partout ozali wapi eh-eh-eh Mbula'a kaké na jigali jour ango ezalaki'o noka ah-ah-ah Nazali'oluka, na bangaki na nga kopola té eh-eh-eh Singa'a lindanda ya popolipo jour yango ekatanaki ih-ih-ih Totshina benga Caprice (aah) Oy'obé yo moko na mutu na yo ya palais Kotikela yé mto mususu o'o mona lia nayo ebandi (Mukenge shay) Mot'oyo osi otia yé elembo (Mukenge Shay) Na motéma pé na nzoto (Mukenge Shay) Tik'o tikaka ye isolé (Mukenge Shay) Tik'o tikaka yé éloigné (Mukenge Shay) Akoya kokoma chien méchant (Mukenge Shay) Kosua-kosua moto tout na nzela (Mukenge Shay) Mama Rocky ya motéma eh (Mukenge Shay eh) Boma mwinda ah Miso etik'oyoka soni eh, ah Ba mbangu ba sala, ba noki ba wela, biso sé malembé Eh, ba mbangu ba sala, ba noki ba wela, biso sé doucement Oh ya ngai na mwana maman bolingo'a doucement, bolingo ya lipanda Hmm ya ngai na mwana mama bolingo ya tout le temps, bolingo ya verité Ata na komi avion, wapi na ko kendé? Yo ndé aéroport Ata na komi ndéké pona mpimbua likolo, zala oya nga mapapu Oh malembé, oy'a biso sé malémbé Doucement, oy'a biso sé doucement ah-ah-ah Ah iyoleli ya ngai na yo eh, bisengo ya biso mibalé Ata ba lobi, ba loba, ata ba fingi ba finga Ata bayini, ba yina Ah iyoleli ya ngai na Stéphie, bisengo ya biso ba la joie eh Ata ba tongi, ba tonga eh, ata ba yini Don Pierrot Ata ba lobi ba loba ah-ah-ah (Mukenge shay) Soki osi osigna moto na motéma (Mukenge Shay) Tik'o salaka yé, zala-zala (Mukenge Shay) Akoya'o koma chien méchant (Mukenge Shay) Ko sua-sua batu partout, partout (Mukenge Shay) Ekatshaka tiaka nga à l'aise (Mukenge Shay) Stéphanie Stéphie tiaka nga à l'aise (Mukenge Shay) Don Pierrot Mavungu salaka nga vrai (Mukenge Shay) Droit d'aimer ezali, tika na linga ah (Mukenge Shay)
Writer(s): Koffi Olomide Lyrics powered by www.musixmatch.com
instagramSharePathic_arrow_out