Lyrics

Na sala yo nini eh, Voisin na ngai? Na defa eloko nini eh Epayi na yo? Papa, na bomela yo nani eh Na famille nayo? Tata oyo, Yo motema mabe eh Voisin na ngai, motema mabe Ye ko mokhristu. Aloki mwana ya bato Eyenga nyoso Na ndako ya Nzambe Lelo oyo, Bakangi ndoki na quartier. Ale mwana ya bato, tata oyo Simetiele ba sala po na biso nyoso. Lopitalo ezali po na biso nyoso Ah nga olukela nga makambo, Po na nini eh. Tata oyo Yo motema mabe eh Luka vie nayo. Tika ngai eh Voisin eh Motema mabe boye Nyboma, talela ngai voisin oyo. Mosala ko funda ngai Ti na mosala, papa. Ba longola ngai Na mosala eh Lofundu ya nzinzi esukaka Se na kombo eh. Mabele oyo to nyataka Ezali po na nga na yo te. Nzambe, Nzambe soki lifelo ezalaka Zikisa nga moto ya liboso mawa. Mbanda asepela. Nzombo Faustino aziki Na tango ya kala to zalaka ko kata ba kisi Lelo ekoma moto nyoso bible na maboko (Yaka eh) Yaka Yesu soki suka ya molongo Yebisa nga na milengela Il parait na komi mobange Ngai mokhristu na yo Voisin Yo motema mabe eh. Au lieu odebrouille vie na yo, Kaka ko funda bato. Mosala ko langwa Na tongo ba monaka yo osambelaka. Nzoka motema nayo, etonda mabe eh. Voisin eh, luka vie na yo Tika lokuta. Tika ko landa vie ya bato. Voisin na ngai, yo motema mabe. Ama Mpika landa ye Lofundu ya nzinzi esukaka Se na kombo eh. Mabele oyo to nyataka Ezali po na nga na yo te. Nzambe, Nzambe soki lifelo ezalaka Zikisa nga moto ya liboso mawa Mbanda asepela. Nzombo Faustino aziki
Writer(s): Madilu Bialu Lyrics powered by www.musixmatch.com
instagramSharePathic_arrow_out