Lyrics

Jules Mansua oyebi ndengé nazalaki Mwasi kitoko, santé nzeté ya sequoia Band'okendé santé na nga elanda yo Na tikala kaka poso, papa Naba ndambu'a-ndambu'a souvenir etikalaki, na sangisi pé nasali na ngo ngomba Mokolo mosusu na mati likolo pé na moni kutu ndengé ngayi na yo tobandaki Mokolo yango omoni nga na nzela, obengi nga Na telemi, to talani, courant eleki Et c'est vrai que na ngambo ya ebalé ya Mansua, olingi ko faire croire nga que mayi ezalité Kotangisa litanga moko na motema oyo etondisa bolingo ya nga na yo, ooh Bayé ba kanisaka bolingo, ekoki ndé ko pesama ofelé Ba yebisela nga Jules Mansua, pourquoi y'akopima ya nga ya yé tous le jour Soki mpasi ezali masuw'oyo moto nionso ako butaka, wapi libongo na ngo Bayé ba lonaki bolingo ya nga na yo na désert po ekola té Lelo ebongwana arbre de Ténéré Un jour soki bolingo na yo etikali eluka nga na lembolaka sani ya bolingo, oh Un jour soki bolingo na yo etikali eluka nga na lembolaka sani ya bolingo, oh Mama ayebisaki nga esika bako sessa niama, moto nionso ako zwaka moké Soki ngayi molili nani'ango akomi mwinda ya vie na yo, oyo atalisi yo nzela y'avenir Bayé ba banzaki que nasi na zinda na mayi bayeba eté, nazali ko tetwa kaka Maika Munan, mukubwa Betela nga seben oy'a pokwa kô, beau-fils ayoka elengi Oka! Bonganya, eh! Riva Kalimazi Zolosi, eeeh Michel Kabeya Mont Fort na Lubumbashi Ba benga niama na nima na kombo na yé Na libota papa azalaka obè moko, eeeh Oyoki, ooh Jean Richard Dain Tonton Niema Freddy Akaya Ya Djo, ta batissimo Na yo pé vraiment otiki nga na tela mbola na libanda Alube Lumbila yo na Bobo, bo yebisa nga n'Ekumani abondel'omona yé kô Bayé ba kanisaka bolingo Elou eh, ekoki ndé ko pesama ofelé Ba yebisela nga Jules Mansua, pourquoi y'akopima ya nga ya yé tous les jours Bayé ba kanisaka bolingo chérie eh, oh-oh, ekoki ndé ko pesama ofelé Ba yebisela nga Jules Mansua, pourquoi y'akopima ya nga ya yé tous les jours
Writer(s): Maika Munan, Wembadio Shungu Lyrics powered by www.musixmatch.com
instagramSharePathic_arrow_out