Music Video

Credits

PERFORMING ARTISTS
Papa Wemba
Papa Wemba
Performer
Viva La Musica
Viva La Musica
Ensemble
Mzee
Mzee
Performer
COMPOSITION & LYRICS
Papa Wemba
Papa Wemba
Songwriter

Lyrics

Mileye nini na sala na berceau ya Maman? Eleki elingi koleka ba mbeto nionso nga na lala Maman soki ozalaki kaka na bomoyi Mbele na sengi zongisa nga susu wana Jamais olingaki nga na lela yo seka Jamais olingaki yo lala nga na lamuka Jamais olingaki ata ngungi atungisa ngai Soki na beli ozalaki kotana tongo nsa Banda y'okenda nakoma abandoné Recompense nayo nako pesa nani yango? Ata na leli nani ako dorloter nga, a-a-ah Yango na yembeli yo zembo oyo Maman Niondo Elengi ya libelé ya Maman abota ngai Eleki ba recette nionso ya ba cordon bleu nga na lia Ata mafuta, tomate ezalaki te, oh Kasi yango elakaka nde mosuni n'élengi Banda y'okenda appétit esila nga-ah Nakoma ko lia kaka Po na sepelisa nde monoko, eh-eh Mateya ya Maman Ezanga bulletin mpe minerval Kasi eleki ba leçons ba maitres Ba professeurs ba pesa ngai Maman soki ozalaki kaka na bomoyi Mbelé na sengi batia yo ministre y'éducation Mbele ba parquets, ba prison nionso bakanga Mbelé kutu motu mabé azali té, eh Lelo nakanisi yo mingi Maman ah Mpo jour y'anniversaire na nga ekomi pene B'invités bako lia bako mela masanga Yo kutu artisan na ngai y'ozali te Epayi y'ozali soki okutani n'occasion eh Tindela nga carte de voeux, ata fololo Esengo na nga ekozala multiplier fois deux Normalement fêti ya lelo ezali ya yo, eh Serment d'Hippocrate ba médecins ba kosalaka Ya nga serment y'ozala toujours Maman ngai Ata ba bandeli mokili soki mbala zomi Ya nga serment y'ozala toujours Maman ngai Mais lelo nakanisi yo mingi Maman Niondo Mpo jour y'anniversaire na nga Ekomi pene Maman B'invités bako lia bako mela masanga, woh-woh Yo kutu artisan na nga y'ozali te, Maman Epayi y'ozali soki okutani n'occasion eh Tindela nga carte de voeux, ata fololo Esengo na nga ekozala multiplier fois deux Normalement fêti ya lelo ezali ya yo Serment d'Hippocrate ba médecins ba kosalaka Ya nga serment y'ozala toujours Maman ngai Ata ba bandeli mokili soki mbala kama eh Ya nga serment y'ozala toujours Maman ngai Maman soki ozalaki kaka na bomoyi Mbele na sengi zongisa nga susu wana, o-oh Ma-man soki ozalaki kaka na bomoyi Mbele na sengi zongisa nga susu wana
Writer(s): Wembadio Shungu Lyrics powered by www.musixmatch.com
instagramSharePathic_arrow_out