Listen to Mon histoire by Mike Kalambay

Mon histoire

Mike Kalambay

Christian & Gospel

6,992 Shazams

Lyrics

Naye liboso na yo Kosopa nde motema na nga Naloba nionso osaleli ngai eh Oyo osalela nga eleki minene Naye na yo Yesu eh Kosopa nde motema oyo ya nga Ngai, nazui pe lisolo ya kobeta Ya kobetela baninga na ngai Naloba nionso osaleli ngai Oyo osalela nga eleki minene Yahwe, nga moto bazalaki kobenga nga Salomon Opikola ngai na salon okotisa nga na chambre Olandi nga na chambre, okuti nga na etoko Ozui nga na etoko, omatisi ngai na mbetu Olandi ngai na mbeti, opesi nga pongi Osuki wana te olandi ngai ti na pongi Ba cauchemars, ba attaques ya butu, tu as gagné Ba ndoto na nga ekoma nde ba Rhema Yahwe, ozua nga mosika na ngolu na yo Olatisi nga chemise kaka na ngolu Olongela nga etumba kaka na ngolu Ata lola nakokota na ngolu eh Bolingo na yo Yesu na ngai eh Etindi nga nayemba loyembo Nagumba mabolongo ya motema na nga Nabuaka motole ya bimbebo na nga Nafungoli robinet ya masanjoli Pe bongo nasopa maloba mpaka malasi Naloba nionso osaleli ngai eh Olongisa nga mowumbu na Satana Oyo ezalaki mosika ekomi pembeni Oyelisi pete nionso ezalaki makasi Okamuisa ngai ndenge omesana kokamuisa Nabala, nasala efforts te Yesu, naboti, nasali efforts te Nakoma mwana na Nzambe na makasi ya nzoto te Okomisa nga mosali, nasala efforts te Nionso wana Yesu Nzambe na ngai Bolingo na yo pona ngai Mawa na yo pona ngai Eh Yahwe Oza bolingo Eh Yahwe Oza malamu Eh Yahwe Namoni na miso bilaka na yo Bolingo na yo pona ngai Mawa na yo pona ngai Nionso ya yo, ekomi ya ngai Elonga na yo, ekomi ya ngai Esengo na yo, ekomi ya ngai Kimia ozali, ekomi ya ngai Bokonzi na yo, ekomi ya ngai Kembo na yo, ekomi ya ngai Yaaaahweeee bolingo na yo nde kombo na yo Bolamu na yo pona nga Yesu, okanisi osali yango na nko Nzambe ya bomoyi Yahwe, Yahweeee Miso, bilaka na yo Nakomi molongi Yesu, kimia na motema osopi Namitungisa te oh Papa olongola maladie Obengana souçis Osilisa kolela Na kati na Yesu olatisa nga kembo Ekomi ya ngaeeeeeee Yahwe Yahwe Yahwe na ngai Yahwe yahwe
Writer(s): Mike Kalambay Lyrics powered by www.musixmatch.com
instagramSharePathic_arrow_out