Lyrics

Uta ngai nakoma kosambela, uta nga nakoma mokristo Kimia na motéma, bomoyi echanger Nakoma kotalela kaka Masiya, na kombo na Yésu Na tika misala ya mabé na kombo na Yésu Na koma moto ya kobanga masumu na kombo na Yésu Kimia na motéma, ah-ah Uta ngai natika masumu, uta nga nakangama na Nzambe Kimia na motéma, na kolemba té Elikya na nga sé na Yésu mwana Nzambe, na kombo na Yésu Milimo ya mbindo mikokima na kombo na Yésu Moto ya Lola mokokita na kombo na Yésu Kimia na motéma, ah-ah Yésu kimia ya bana Nzambe, Nkolo to tielaka motéma, oh yé To sanjolaka, liloba na Nzambe Ye ndé apesaka bomoyi ya seko, mokonzi ya éklesya Makasi na nga mowumbu na yé, loléndo na nga Apesa nga ngolu yako yeba Nzambe pe kosolela ye, oh Na kimia na motéma, ah-ah Yésu elonga na nga mosantu, likonzi ya bomoyi na nga, ah yé Nako yembela, moyi ya bosembo Nionso asalaka yango ndé esengeli, na kombo na Yésu Na koma mosantu ya Nzambe, elombé ya bwanya Maloba nayé ndé ebongi toyoka na kombo na Yésu Kimia na motéma, ah-ah Yésu nguya na nga moklisto, nsomi ya bokonzi na Nzambe, oh yé Nako kumisa, lipa na bomoyi Andima kokufa likolo na nga, moninga malamu Nakoma efandelo na yé oh, lisol'ya motéma Atondisa nkémbo ya Nzambe na bomoyi na nga, libang'a motuya Kimia na motéma, ah-ah Yésu kimia ya bana Nzambe, Nkolo to tielaka motéma, oh yé To sanjolaka, liloba na Nzambe Ye ndé apesaka bomoyi ya seko, mokonzi ya éklesya Makasi na nga mowumbu na yé, loléndo na nga Apesa nga ngolu yako yeba Nzambe pe kosolela ye oh Na kimia na motéma, ah-ah Yésu nguya na nga moklisto, somi ya bokonzi na Nzambe, oh yé Nako kumisa, lipa na bomoyi Andima kokufa likolo na nga, moninga malamu Nakoma efandelo na yé oh, lisol'ya motéma Atondisa nkémbo ya Nzambe na bomoyi na nga, libang'a motuya Kimia na motéma, ah-ah Kimia na motéma na nga (kimia na motéma) Na kombo na Yésu tolongi masumu (kimia na motéma) Na kombo na Yésu tokomi ba santu (kimia na motéma) Yésu nsomi na Lola, likonzi na moto (kimia na motéma) Elombé mobali, moninga malamu (kimia na motéma) Kimia na motéma na nga (kimia na motéma)
Writer(s): 0, Katoto Antoine Lyrics powered by www.musixmatch.com
instagramSharePathic_arrow_out