Lyrics

Naza ya yo Yesu Opona ngai pona tatola bilembo ya bolingo bwayo kati na bato Otia ngai elembo ya bokonzi bwa yo Mpe otangelanga nkembo na yo Po'été mitema mwa bato misopana na masanjoli liboso na yo, Nkolo Naza ya Yesu oyo atondi nga motema pe alati nga molimo Mpo'ete nazala mosali kati naye mpe esaleli na maboko maye Atondi nga motema, alati nga molimo Nzoto mpe mayele, naza ya Yesu Alatisi nga elamba ya sika, bomoyi ya ba santu Mpe motole ya nkembo na moto, naza ya Yesu Akomisi nga moninga ya motema na ye Ngolu ezanga suk, naza ya Yesu Apesi nga nionso oyo ezali ya ye Mpo'ete ngai nabika bomoyi ya nzambe Apakoli ngai mafuta eko ngengisa molimo mwa nga Mpo'ete nguya ya Nzambe etambwisa nga Akomisi kombo na ngai na buku ya bomoyi na ye Mpo na sala seko ya Yesu Naza ya Yesu, na botama na molimo mosantu, na nzoto te Naza ya Yesu, bomoyi na nga ekoma na ngo libonza ya Nzambe tata Naza ya Yesu, na bombama na makila motuya ya mwana Nzambe Naza ya Yesu, na simbama na liloba Nzambe ya Nkolo na bomoyi Yango ata bitumba eleki makasi, naba nga té oh Na simbama na mokeli na nionso, assurance éternelle Naza na nga moleki mais pour l'instant nanu awa na se Abengi nga mwinda, nasala nini? Naza kopela, Yesu Yango ata liboso ya kufa, nabango nini? Nasimbama na makomi elobi Yesu alonga nde liwa Naza nanga moleki mais pour l'Instant naza nanu na bomoyi Abengi mungua, nasala nini? Naza kopesa goût na mokili Nkolo oyo apesi nga ntina, naza ya ye (naza ya Yesu) Nakoma propriété privée ya Nzambe mokeli ya nionso (nga, naza ya Yesu) Bomoyi na nga basimba té, bameki basimbi Nzambe (naza ya Yesu) Motindami asimbi elaka akufaka té (nga, naza ya Yesu) Kino oyo Nzambe alobi ekokisama kati na ye (naza ya Yesu) Le fils de la promesse ne meurt Jamais (nga, naza ya Yesu) Faute na nga té, elaka'a Nzambe nanu ekokisami té (naza ya Yesu) Ata na poison elaka ekufaka té (nga, naza ya Yesu) Elaka'a Nzambe ekoti misisa, epesi nga bomoyi (naza ya Yesu) Ekokisama ata moto abwakami na moto (nga, naza ya Yesu) Ce n'est plus moi qui vit, c'est plutôt Jésus qui vit en moi (naza ya Yesu) Oy'a nga masiyah, eloko ebomaka ye té (nga, naza ya Yesu) Bisika y'atangi maloba, moto a contredire té (naza ya Yesu) Faute na nga té, akomisanga oyo y'azali (nga, naza ya Yesu) Babenga ye mokonzi, apesi nga bokonzi na ye (naza ya Yesu) Faute na nga té, akomisanga mwinda lokola ye (nga, naza ya Yesu) Na déranger ténèbres nionso ya mokili ya lelo (naza ya Yesu) Faute na nga té, akomisanga molongi lokola ye (nga, naza ya Yesu) Bisika nakomi, parfum de bonne ordeur emati likolo (naza ya Yesu) Eh, eh, naza ya Yesu eh (nga, naza ya Yesu) Eh, eh, naza ya Yesu eh (naza ya Yesu) Naza ya Yesu oyo atia bilembo na ye epa na ngai Mpo'ete na zala elembo ya bonkumu (nga, naza ya Yesu) Nzamb'oyo akokisaka yambo ete aloba Oyo akendeke elongo na baye atinda (naza ya Yesu)
Writer(s): Inconnu Compositeur Auteur, Katoto Luhembe Antoine Lyrics powered by www.musixmatch.com
instagramSharePathic_arrow_out